Accessibility links

Breaking News

Botiami bwa mbulamatari ya transition (ya boleki) na Mali


Président ya transition ya Mali Bah Ndaw (D) elongo na vice-président na ye Colonel Assimi Goita (G) na milulu mya bolapi ndayi na bango na Bamako, Mali, 25 septembre 2020.
Président ya transition ya Mali Bah Ndaw (D) elongo na vice-président na ye Colonel Assimi Goita (G) na milulu mya bolapi ndayi na bango na Bamako, Mali, 25 septembre 2020.

Le 18 aout, mokonzi ya Mali Ibrahim Boubacar Keita alongolamaki na ebonga na bolongomami ya mampinga boye mokili mobimba motelemelaki. Etats-Unis ekataki mbala moko lisungi lya yango na mbulamatari ya Mali.

Mpe lisanga lya nkita lya bikolo bya etuka ya west ya Afrika, CEDEAO, litelemisa Mali na kokota na misala mya yango mpe lipesaki etumbu, na kozelaka bokelami bwa mbulamatari ya ba civili.


Na suka ya septembre, Bah N’Daw, colonel ya kala atiamaki bo’ president ya transition (ya boleki) na Mali.

Colonel Assimi Goita, mokambi ya basoda bakweyisaki bokonzi, atiamaki bo’ vice-président ya sika ya transition. Diplomate ya civili mpe ministre ya kala ya mambi ba Bikolo bya ba bapaya Moctar Ouane atiamaki bo’ ministre wa Yambo. Bakokamba transtion ya ba civili ya sanza 18 eye ekomema na maponami ma lolenge ya démocratie. Le 5 octobre, président ya Transition, Bah N’Daw, atiaki na esika mbulamatari mobimba. CEDEAO elokolaki etumbu.

Etats-Unis ezali kotala mbulatamari ya transition lokola etapi ya liboso yambo na bozongi na alima ya Buku likonzi.

Molobeli ya Département d’Etat Morgan Ortagus alobi, “Tozali kosenga mbulamatari ya transition etosa bilaka na yango na lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya west, kati na yango kosalisa maponami na saza 18.”
Ekosala mpe na lintomba mpo na mbulamatari ya transition kokokisa bilaka na yango na bana ya Mali ya kobongisa bokambi, kobundisa kaniaka, kosala mbongwana ya misala ya maponami, mpe kotia na misala Boyokani ya kimya mpe Bobingisi ya 2015 na Mali.


Ntoma ya Etats-Unis na Nations unies Kelly Craft abetaki sete ete mboka na ye “ekondima te bokonzi ya bayi mampinga likolo na bakambi ya ba civili, bolekisi ntango ya maponami, to maponami maye mandimami te to ya malamu te… Maponami masengeli mpe kozala mobimba, ya solo, mpe na bozali mpenza ya basi, ya bakima bitumba baye bazali kati na mboka, ya bilenge, mpe na mangomba ma bayi Nordi batiama pembeni.”
Etats-Unis etelemi na bana ba Mali mpe etie 54 millions $ ya lisungi lya mawa mpo na Mali.


Molobeli Ortagus alobi, “Tozali kondima mpenza ete Mali ya démocratie, ya kofulikisama, mpe ezali na bokengi, ezali na lintomba mpo na lobi ya etuka ya Sahel. Lokola mosungi ya Mali wuto mibu 60, Etats-Unis ekokoba kosala na baye banso bakotambola na nzela eye. Sik’oyo ezali ntango mpo na bana ya Mali baya elongo kotonga lobi ya malamu mpe kitoko mpo na banso.”

Ezalaki éditorial elakisi makanisima mbulamatari ma Etats-Unis

XS
SM
MD
LG