Accessibility links

Breaking News

Bahrein na Israel bayokani


Ministre wa yambo ya Israel Benjamin Netanyahu (G), président Donald Trump ya Etats-Unis (2e G) na ministre ya Bahrein ya mambi ya bikolo bya bapaya Abdullah Bin Zayed bazali kopepa na Maison Blanche nsima na boyokani kati na Israel na Bahrein, Washington, 15 septembre 2020.
Ministre wa yambo ya Israel Benjamin Netanyahu (G), président Donald Trump ya Etats-Unis (2e G) na ministre ya Bahrein ya mambi ya bikolo bya bapaya Abdullah Bin Zayed bazali kopepa na Maison Blanche nsima na boyokani kati na Israel na Bahrein, Washington, 15 septembre 2020.

Na ntango moke, sanza moko ekomaki te, Etats-Unis esungi kosala boyokani mibale ya kimya boye botikali na lisitwale na Moyen Orient, ya suka ezalaki kati na Israel na Bahrein. Ya yambo esalamaki kati na Israel ma Emirats Arabes Unis.

Na molimo na kimya mpe boyoknai, Bahrein endimi kobongisa boyokani na yango na Israel. Bako sombitinya to kopesana ambassade mpe ba ntoma, mibembo mya mpepo mikosala kati na bikolo na bango, mpe bakobanda mabongisi ma boyokani na nzela nzike, lokola nzela ya bokolongono, mombongo, technologie, biteyelo, bokengi, mpe milona.
Kaka boyokani mibale nde bosalama na Israel na mibu 72 mileka, elobi président Donald Trump, “mpe nazali kolikya ete mingi misusu mikolanda.” Solo, boyokani na Bahrein mpe na Emirats arabes unis bozali kosunga na lolenge ya kotala ndenge ya kopesa misolo mpo na kimya eye ekowumela kati na Israel na bayi Palestine.

Nsima na mibu mingi mya mobulu mpe nkwokoso, lolenge ya kobika lobongisami na Moyen Orient mpenza na mibu misatu mileki, eyebisi président Trump:

“Nazongisi bondimi na baninga ba biso ba etuka eye, mpe elongo tosukisi kalifa mobimba ya lingomba Etat islamique; totiki bango moko bato na kanza baye babesi Islam mpe bamemaki mobulu. Lelo, bikolo Nzinga Nzinga mpe na mokili bazali kosangana, kotia esika moko mpiko ya kotonga lobi ya malamu, ekongalama na bato mabe baye bawumisi bobangi.”

Président Trump atondi botondi bakambi ba Israel mpe Bahrein mpo na makasi ma bango ya kotonga boyokani ya lisolo.:

“Botambwisi bwa bango bolakisi ete lobi lokoki kozala na elikya enene mpe lokosenga te etindama na boswani bwa kala… Lokola bikolo mingi bizali kobongisa boyokani bwa bango na Israel – yango ekosalama na lombango, nakolikya- etuka ekokoma na kimya mpenza, na bokengi, mpe na bofulukisama.

Amerika ekokoba kotelema elongo na bayi Moyen Orient lokola bazali kosala elongo nan tina ya kotonga lobi ya kongenga mpe ya elikya.

XS
SM
MD
LG