Accessibility links

Breaking News

Botelemi bwa Etats-Unis mpo na kobundisa makama ma lelo


Président Donald Trump akutani na Minsitre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu na mwasi wa ye Sara elongo na mama wa yambo ya Amerika Melania Trump na Maison Blanche na Washington, DC, le 5 mars 2018 .
Président Donald Trump akutani na Minsitre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu na mwasi wa ye Sara elongo na mama wa yambo ya Amerika Melania Trump na Maison Blanche na Washington, DC, le 5 mars 2018 .

“Makonzi ya bokasi mpe sembo to bongondo ezali… loboko inso mpo na mikano ya Amerika likolo na likama lya yambo lya molongo lya bonsomi lelo: Parti to lisanga lya communiste ya Chine,” elobi Secrétaire (d’Etat) Pompeo na lisikulu na Institut Ronald Reagan le 10 novembre:  

“Tolobaki polele mpe na pobikiliki ete bondeko Etats-Unis – Chine ekokakmbama te na malako makelami na parti (lisanga), kasi kaka na bolandi mpe malako mazelami na ekolo moko ten a botindami ya kosala bo’ etapi ya molongo. Elingi koloba ete toyebisaki bakokani ba biso na Chine (RPC) – kondima mokumba, pole, bozongisi kowuta na Beijing.”

“Elingi mpe koloba bakosenga lisusu te Mbu ya Chine na sudi, bakanyokola lisusu basusu te mpe bakondima bayi mombongo ya Amerika, bakotinda lisusu te ba ntoma lokola espions (banongi), bakoyiba lisusu te propriété intellectuelle (mayele yo makambo basusu basali na mayele na bango), mpe bakawanga lisusu te soki baniati makoki ma bomoto,” elobi Secr♪0taire Pompeo. “Mpe mbeba ya mambe ya parti na Xinjiang, Tibet, mpe bisika misusu bikondimama lisusu te.”

Mpo etali Iran, mbamba makasi ya Etats-Unis epikisi Téhéran mpe basungi na bango ya badongolo meso millions mingi y aba dollars.

Ezalaki nae longa mingi na bokonzi bwa président Trump.

“Na Moyen orient, bokasi bwa Amerika ezwi esika ya bokambi na nsima,” elimboli Secr♪0taire Pompeo. “Tobomi caliphat to bokonzi ya Groupe Etat islamique (ISIS). Tobomi Baghdadi mpe Soleimani, mpe tozongisi bobangisi ya mampinga.”

Bisika misusu na etuka, Etats-Unis ekeyi liboso na politiki na yango ya bikolo bya bapaya. “Na kondimaka Jérusalem bo’ engumba mokonzi ya Israêl mpe na kondimaka ete bangomba ya Golan ezali kati na Israêl, Etats-Unis esungi kobatela Ekolo y aba Yuda lokola mokokoli ya etuka eye,” elobi Secrétaire Pompeo.

Kolinga kobika ezalaka likambo lya moto nuonso. Lokola Secrétaire d’Etat Pompeo abetaki sete: “Tozali komona yango na bana ba Venezuela, baye balembi bokonzi ya kobebisa ya Nicolas Maduro. Tomoni yango na Nicaragua, tomoni ban aba iran mpe Belarusie banso bazali kozela lolenge mpenza ya kobika lokola bato.”

Etats-Unis esengeli eluka bonsomi bonene bwa bomoto na mokili, “na kondimaka ntina ya ekolo na biiso, na makasi ma maye motuya ma biso, mpe na molende ya kobatela lolenge na biso ya kobika mpo ete tondimi makasi na elikya ya Amerika.”

XS
SM
MD
LG