Accessibility links

Breaking News

Etats-Unis epesaka maboko na misala mya Sembo ya etumbu mya molongo


Cour pénale internationale, 7 novembre 2019.
Cour pénale internationale, 7 novembre 2019.

Etats-Unis ezali mpenza makasi mpo na misala mya sembo ya etumbu mya molongo mikoba (Jusitce pénale internationale).

Yango moko kaka kati na ba ministères ya bikolo bya bapaya na mokili mobimba, Département d’état ezali na bureau moko etalaka kaka mabe to mbeba ekasi esalamaka likolo na bato mingi, lokola ntoma oyo akendaka bipayi na bipayi Morse Tan, oyo akambaka bureau ya Sembo ya etumbu na Mokili, alakisaki yango na biyano bapanzi sango:

“Tozali kolobela génocide, mbeba ya ntango ya bitumba, mbeba likolo lya makoki ma bomoto, mpe nyonso tokoki kosala mpo na kosunga kopekisa, kokitisa to kopesa eyano na bozangi bosembo ya motindo boye, bozangaki bosembo bonene boye, bozangi bosembo ya somo boye. Yango makambo nyonso tosengeli kosala.”

Ntoma Tan alobaki ete bureau na ye epesaka toli na Secrétaire d’Etat mpe esungaka kozwa makoki manene ya mbulamatari mobimba mpo na makambo matali sembo ya etumbu na molongo:

“Ekoki kozala ya nkita, ekoki kozala ya bondeko na bikolo, ekoki kozala ya sembo, ekoki kozala ya mampinga. Ezali na liboke lya bisaleli ya lolenge na lolenge biye mbulamatari azali na maboko na yango. Mpe tozali esika ya kobomba malako, soki bolingi.”

Ntoma Tan alobaki ete Bureau ya Sembo ya etumbu ya Molongo ekabolaka etinda wana moko ya moboko na Cour pénale internationale – na ntina ya komema bato baye bazali na mokumba ya mbeba ya somo na misala mya bosembo. Kasi mpo na makambo lokola bonsomi, Etats-Unis etikala kozala te na Statut ya Rome eye ekelaki CPI. Mpe mawa nde, CPI ebima na etinda na yango lokola cour to esika ya kosamba ya suka etiama na kolandela mpe kosambisa mbeba ya mabe koleka na molongo. Nzoka nde, ntoma Tan alobaki, CPI ekoma "kotambola na etinda ya bayi politiki mpe na kaniaka.”

Ezali Etats-Unis, elobi ye, nde ekoba kokamba mokili na kolandela mokumba ya bato na mbeba ya somo likolo ya bato ebele.

“CPI ezali kaka te likambo lyoko lisalama na misala ya kosimba na molongo, to ba tribunaux mixtes to esangana (hybrides) eye ezali ndambo ya kati ya mboka, ndambo ya molongo, mpe lokola bo’ ba tribunaux ya kati ya mboka. Mpe ezali solo mpo na Tribunal special mpo na Liban, ba Chambres spéciaux ya Kosovo, IIIM, eye ezali komeka kosamgi solo nyonso etali mbeba esalama na Myanmar. Topesaka maboko na makambo maye manso, mpe tosunga mpe na maye matali bozwi bilembo.”

Ntoma Tan alobaki ete Etats-Unis “ezali mpenza kati mpe na molende” na boluki na yango ya bosembo na mokili. “Kokanisaka na bato baye bayoka mpasi na makambo ya somo likolo ya bato ebele epesaka mpenza makasi,” alobi. ”Mpe kutu, tozali kokolisa mpe kobakisa makoki ma biso na ntina ya kokikisa etinda eye.”

XS
SM
MD
LG