Accessibility links

Breaking News

Jehad Serwan Mostafa alukisami


FBI elaki kopesa $5 millions na bato baye bakepesa sango ya moyi Amerika Jehad Serwan Mostafa afundama kozala moko na bayi al-Shabaab.
FBI elaki kopesa $5 millions na bato baye bakepesa sango ya moyi Amerika Jehad Serwan Mostafa afundama kozala moko na bayi al-Shabaab.

Mbulamatari ya Etats-Unis ezali koluka sango ekoki komema na kolakisa esika Jehad Serwan Mostafa azali mpe kopesa nzela ya kokanga ye. Jehad Serwan afundami na kozala moko na bayi mboka Amerika oyo azali na bitumba libanda na mboka kati na lisanga lya ba dongolomeso (terroristes).

Akola na San Diego, Califonrie, Mosatafa asala mosala mibu mingi na lisanga lya ba dongolomeso Al-Shabaab, eye emema mpasi mpe kufa na bato bayebi likambo te na Somalie mpe bisika misusu na Liseke to Corne ya Affrika. Al-Shabaab eluka kosala mabe na bana ba Amerika mpe ba intérêts na bango.

Mibu mingi mileki, Mostafa azalaki na ebonga ya moko na bakambi ya al-Shabaab, ata ya eye ya bokambi misala ya ba explosives (bombes) epayi wapi asalelaki ba appariels (bisaleli) ya lolenge ya sika ya ba explosives bo’ bibundeli ya kopesa bato somo.

Na 2009, Etats-Unis elakisa Mostafa na bofundami misato. Na 2011, FBI ebakisaki Mostafa na nkasa ya bato balukama mingi koleka; mpe na 2013, Linaka ya mbano mpo na Bosembo ya Département d’Etat lilakaki kopesa kino $5 millions na baye bakopesa sango ekomema na kokanga ye.

Na bokutani na bapanzi sango na décembre 2019, Procureur ya Amerika na Californie du Sud Robert Brewer mpe Agent Spécial ya FBI ya mokonzi na San Diego Scott Brunner asakolaki bobimisa na polele mokanda mofundaki Mosatafa, mpe etiaki na moto na ye mbeba asalaka wuto février (sanza ya mibale) ya 2017.

Oyo maye Agent spécial ya FBI Brunner alobaki:

“Tokanisi Mostafa azalaki mpe azali kokoba kozala na makambo ba dongolomeso ya al-Shabaab basalaka mpe esengeli asukisama. FBI mpe basungi ba bison bakotika te kobekisa bikela bya ba dongolomeso, ata ya dongolomeso oyo [tozali kolobela] afundama mpo na kosamba. Tozali kosenga lisungi na bino. Tosengeli tokoba kotelemela al-Shabaab mpe bitumba bya yango ya mabe.”

Ekanisamaki ete Mostafa avandaka na Somalie. Azali molayi, mondele, na miso ya bule, na elembo ya mpota na loboko ya mobali. Alobako kiarabe (lokota ya ba Arabes), kisomali mpe Anglais. Ntango mosusu akoki kosola mobembo na Yémen, Ethiopie, Kenya mpe bikolo misusu ya Afrika.

Soki bozali na sango etali Jehad Serwan Mostafa, boyeba na kobenga 1-800-225-5324, to botinda yango na Internet na tips.fbi.gov. Bokoki mpe koyebisa ambassade to consulat ya Etats-Unis ya pembeni.

Sango inso ekobombama sekele mpenza.

Anncr: That was an international public service announcement by the United States Government.

XS
SM
MD
LG