Accessibility links

Breaking News

Koleka Mabongisi ma Molongo mpo na Bokolongo


USAID ezali kosunga
USAID ezali kosunga

Etats-Unis ezalaka wuto ntango molayi mopesi misolo koleka na molongo mpo na bokolongono mpe lisungi lya kobikisa bato.

Lisungi liye lipesamaka na makasi ma bana ya Amerika baye bafuka mpako na kozelaka ete (lisungi lyango) lizala mpo na bosalelami ya malamu mpe likomela baye bazali na bosenga.

“Nzonkande, Mabongisi ma molongo mpo na Bokolongono to OMS ekweyisami na makambo maye, kaka te mpo na eyano na yango na COVID-19, kasi na nkwokoso misusu na mibu mingi miye mileki,” elobi molebeli ya State Department Morgan Ortagus na liyebisi. “Lisusu, OMS eboyaki kosala mbongwana esengeli na lombango, banda na kolakisaka bonsomi bwa yango liboso na parti communiste ya Chine.”

Na yango, Etats-Unis esakolaki polele bolongwi na yango na OMS wuto le 6 juillet 2021.

Bomipesi ya Etats-Unis na lisungi lya bokolongono o’libanda botikali makasi. Nakomibongisaka na kolongwa, mbulamatari ezali kotala nzela nini ya kotika expertise ya lintomba makasi ya ba ministères mpe ba agences ya Etats-Unis mpe secteur privé ya Etats-Unis kopesa maboko masengeli na lombango na bikolo misusu na ntina ya kopekisa, koyeba, mpe kopesa eyano na makono ya infections makongola na maziba ma yango mpe makama to ba urgences inso ya bato.

Wuto 2001, mbulamatari ya USA epesa koleka 142 milliards $ na ntina ya kopekisa, koyeba mpe kobikisa VIH/SIDA, malaria, tuberculose, Ebola, mpe makono masusu mpe lolenge misusu ya mabe. “Topesaka pene na 10 milliards $ mobu monso na bokolongo ya molongo, mpe mobu moye, ekobakisama mbala mibale lokola na tozali kobundisa COVID-19 na mokili mobimba,” elobi mokambi molandi ya Global Health (Bokolongo bwa molongo) Dr. Alma Golden.

Etats-Unis ezali na molende ya kosala ete bolongwi na yango na OMS bomema mbeba te na lisungi lya yango na baye bazali na nkwokoso makasi. “Etats-Unis ekambaka mokili na maye matali bokolongono mpe lisungi lya baton a nzela ya bokasi bwa bana ba America banso,” ebakisi Dr. Golden, “mpe tomipesa na kosala ete lisungi na biso likoma mbala moko bato na molongo mobimba.”

XS
SM
MD
LG