Accessibility links

Breaking News

Mibu 75 mileki, Bitumba bya Molongo bya mibale bisilaki


General Doublas MacArthur (G) azali kotala ministre ya Japon ya mambi ma mboka bapaya kotia manzaka na mokanda mwa bokitisi minduki, na masuwa UUS Missouri, Tokyo, 2 septembre 1945.
General Doublas MacArthur (G) azali kotala ministre ya Japon ya mambi ma mboka bapaya kotia manzaka na mokanda mwa bokitisi minduki, na masuwa UUS Missouri, Tokyo, 2 septembre 1945.

Le 2 se[tembre ezali mokolo Bitumba bya molongo ya mbala ya mibale bisukaki na Océan Pacifique, mpe suka ya matata na mokili. O’mokolo mwango, mibu 75 mileki, balakisi bilongi ba Etats-Unis mpe ya Japon batiaki manzaka na mikanda ya bokisi minduki ya Japon na kati masuwa USS Missouri.

Masuwa maye matelamaki na libongo lya Tokyo.

Wuto bokitisi minduki ya Allemagne o’mokolo mwa mwambe mwa sanza ya mitano, Bitumba bya Molongo ya mbala ya mibale bikomaki na suka, kasi, etumba engalaki na Pacifique, mpe ekokaki te kosila kino Japon akitisa minduki.

Le 26 juillet, mikolo zomi nsima na Etats-Unis kobeta bombe atomique, bakambi baye basanganaki basalaki lisakoli ya Potsdam, mokanda ebetaki sete na maloba ma bokitisi minduki ya Ekolo Japon. Soki Japon eboyaka yango, elingaki “ezwa mpasi ya kopanzana.” Japon ebwakisaki mokano mwango.

Ekomaki bongo lotomo ete Japon ebetema na bitumba, mosala ya makasi ya kosala. Na mibu misato, Etats-Unis na basungi ba yango basalaki bitumba na Japon na nzela ya masuwa na mbu ya Pacifique. Bitumba bya makasi koleka na bisanga bizali na océan Pacifique biye bisukaki mingi te na basoda ya Japon komiboma na bituluku ntango balongamaki, ba civili mpe lokola, kasi bindimisaki bakambi ya Etats-Unis ete bokoti kati na Japon bolingaki komema na liwa lya bato mingi na ngambo mibale.

Mokano mozwamaki ete bitumba bisengeli bisilisama na lombango mpe na makasi. Nsima na kobwaka nkasa ya kokebisa na attaque ya likolo mpe kosenga ba civili kolongwa, Etats-Unis ebwakaki bombes atomiques mibale na bingumba ya Japon, na mikolo misato. Suka suka, bakambi ba Japon bandimisamaki ete bitumba bikokaki te kolongama, mpe la 14 aout, Empereur to nkumu ya Japon Hirohito asakolaki ete Japon ekokitisa manduki.

”Lelo mandoki makangi minoko,” elobaki general Douglas McArthur, oyo andimaki bokitisi minduki ya Japon na nkombo ya baningami ba Amerika, nsima na milulu na masuwa USS Missouri.

“Likambo libe lisili, Elonga enene ezwami. Mapata makonokisa lisusu kufa te –- mbu ememaka nde makambo ma mombongo-- Bato batambolaka na alima na nse na moyi. Mokili mobimba molali na lombango na kimya. Lotomo ya bule lokokisami.

“Wuta basin ya Pacifique, mokili ya mbonsomi mokomi. Lelo, bonsomi bozali likolo na bitumba, démocratie ezali kotambola. Lelo, na Asie mpe lokola na Europe, baye basikolami bazali komeka elengi ya bonsomi, bokangolami na bobangi.”

Le 2 septembre 1945, Bitumba Bya Mibale ya molongo bisilaki solo mpe eloko ya sika ebandaki.

XS
SM
MD
LG