Accessibility links

Breaking News

Mokolo mwa Bukabuka na molongo na 2020 – Nzela ya kosilisa bokono boye


Somalia Polio Emergency
Somalia Polio Emergency

Bukabuka to polio, ezali bokono bwa mikolobi mikomisaka ebosono to mimemamaka na liwa, miwutaka na poliovirus. Poliovirus ekotelaka système nerveux central mpe ekoki komema kokoma ebosono na nzoto mobimba na ba ngonga.

Ekoki kozwa bato ya mibu minso kasi ban ana nse ya mibu mitano bazali mingi na likama. Bato bakoki komibatela na Polio na mangwele, kasi bato bakoki te kobika na yango soki basi bawi yango.

Na 1998, Likita lya Molongo mpo na Bokolongo lilingaki ete bokono bwa polio bosila na mokili, bokono boye bosalaka ete bana 350.000 bakoma bibosno na mobu moko na bikolo 125.

Lisungi lya USAID lipesi nzela ya kosukisa polio virus sauvage na Amerika ya nordi mpe ya sudi na 1994, na Pacifique ya west na 2000, na Europa na 2002, na Asia ya sudi mpe est na 2014, mpe -kaka mikolo miye na mobu moye na Afrika. Na kati ya sanza ya mwambe, Afrika endimamaki ete emonanki te na bato basika babokono bwa polio nsima na mibu minei. Nigeria ezalaki ekolo ya suka kokisa mikano mya makasi mpo ete endimama, elongo na bikolo 46 ya etuka mpo na kosepela elonge eye ya litomba na lisitwale ya bokolongono bwa bato.

Lelo, motango mwa bato ba polio mokiti na 99,9%, mpe kaka Afghanistan na Pakistan bakoba kozala na bokono boye bwa polio bozengelaka.

Na bikolo mingi, nzela ya kosukisa polio ezala pete te. Matata maye mawela, sango ya lokuta, bato kokitama bisika bavandaka, ba communautés ya bato ya mosika, mpe nkwokoso misusu epekisi mpe ezali kokoba kopekisa makasi ma bikolo bizali komeka kobundisa virus. Nzokande, soki lolenge ya kopesana virus boye botikali losengeli losukisama, eyano epesami maboko mpe ya kokoba esengeli ewumela. Kaka na nzela ya molende, na mayele masika mpo na kosepa eyano, mpe makasi mpenza ya mosala ya ba communautés locales, na mbulamatari ya bikolo, mpe na bosungani bwa bato bans onde mokili mozanga polio virus mokoki kosalama.

Na lisungi lya basali mingi ba bokolongono, masanga ya bakambi, mpe ba volontaires baye bobosana bana banso kino ya suka, lisungi lya USAID mpo kosukisa bukabuka na mokili lipesa nzela ya kosala été bana 400 millions bazwa mangwele ya polio mobu nionso. Lelo, pene na bato 19 millions batambolaka bakokaki mpe kokoma bibosono (kozala paralysés) mpe kolekabato 1,5 millions bazali na bomoi kasi bakokaki mpe kokufa na polio.

Mobu moye, 2020, ezali ya litomba mpo na kosepela Mokolo mwa Molongo mpo na Polio, na etuka ya Afrika endimami na kozanga polio ata bokono bwa COVID-19 bozali kokoba kotungisa lisali lya bokolongono na mokili mobimba, kati na yango manaka ya kopesa mangwele. Tango tozali kokende liboso, USAID mpe basungi ba yango bakoselela maye bayekolaki mibu mileki mpe ba infrastructres etongamaki na nzela ya bitumba ya kosilisa polio mpo kopesa sango ya eyango na biso na bokono ya ntango eye mpe Makoni makoya.

XS
SM
MD
LG