Accessibility links

Breaking News

Mokolo ya Sida na molongo na 2020


Botswana pepfar
Botswana pepfar

Le 1er décembre ezali mokolo ya SIDA na molongo, ntango ya kokebisa mpo na bokono ya SIDA na mokili, mpe kolela baye basila kokufa na bokono boye. Mama ya likambo ya mobu moye ezali “Kosilisa malady ya VIH/SIDA : Bopikiliki mpe Mbano”.

Sango epesami na bokanisi mobu monso mokolo ya SIDA na molongo, elongo na makambo masengeli kosalama (Mingete) ya ekeke ya ntombwa etiamaki na ONU na 2000, esali ete boyebi ya makasi bozala na mokili mpe makambo masalama na bosenga ya komema lisalisi lya VIH na baye bazali na bosenga. Na 2003, mbulamatari ya président George W. Bush esalaki mwango ya lisungi lya SIDA (Plan d’uregnce pour l’assistance au SIDA, to PEPFAR - misala minene ya ekolo moko moko mpo na kobundisa bokono oyo na molongo mobimba – yango ezwa maboko ya ngambo inso mibale (démocrate na républicain).

Ezali na bato pene na million 38 babikaka na SIDA lelo. Kati bango, 68% ya mikolo bazwaka mono ya ba anti-retroviaux ebikisa bomoi lokola na juin 2020. Ata motongo moye mozali monene, ONUSIDA emoni ete kufa etindama na SIDA ekiti na 60% wuto ekomaki na likolo koleka na 2004, mpe ba infections ya sika ekita na 40% wuto 1997.

Mingi na elonge eye ekoki kotiama na mokongo ya mbulamatari ya USA, eye esalaka na nzela ya PEPFAR. Koleka pene na mibu 18 wuto ekelama, PEPFAR ebikisa bomoi 20 million mpe ebatela ba millions na kozwa bokono bwa VIH. Na kosala kati na bikollo tuku mitano, PEPFAR esunga kotia alima na mobulu ndenge esungaka bikolo na kolandela bokono bwa bango ya VIH SIDA.

Na septembre ya mobu moye PEPFAR ezwaki mokumba ya lisalisi ya lobiko na ba antiretroviraux mpo na bato pene 17,2 millions ; epesaki nzela ete ba bébés 2,8 millions babotama na bozangi VIH na ba mama baye babikaka na VIH ; mpe epesaki lisalisi ya lintomba mpe lisungi na bana bitike 6,7 millions mpe bana bazali na likama elongo na basalisi ba bango.

Mobu moye bokono bwa COVID-19 bomemi bibaka ya bokeseni na eyano ya mokili na VIH SIDA. Kasi, bikolo bikokaki kozwa bisika ya lisalisi, ba laboratoires mpe chaines ya koepsa lisungi epesamaki maboko na PEPFAR mpo na kopesa makasi na eyano na bango na COVID-19, mpe na kopekisa eyano na bango na VIH SIDA elemba to ezonga nsima.

“Bokambi ya Amerika na eyano ya mokili na VIH SIDA ezali pole mpe makasi lokola esalama te na nzela ya Plan ya urgence mpo kosunga na SIDA,” elobi président Donald Trump. “Makasi maye… mamemi VIH SIDA kowuta na nkwokoso kino ekokota kotalama communauté na communauté to lisanga ma lisnaga.”

Anncr: That was an editorial reflecting the views

XS
SM
MD
LG