Accessibility links

Breaking News

Noël 2020


Décoration mpo na Noël na Rockefeller Center Christmas na Manhattan, New York City, U.S., 30 novembre 2016.
Décoration mpo na Noël na Rockefeller Center Christmas na Manhattan, New York City, U.S., 30 novembre 2016.

25 décembre ezali moko na biyenga bisantu ya motuya koleka na Bokristu, eyenga ya kokanisa mbotama ya Yesu Kristu pene na mibu 2.000 mileki, ba Kristu ba basepelaka ye bo’ Nzambe oyo ayaki na nzoto, Mobikisi, Mwinda ya mokili.

Baboti ba ye, Maria na Joesph bazalaki boko na babola, mpe bokoko bolobake ete Yesu abotamaki na molili, na eleko ya malili makasi.

Wuto ntango eye etikala na makanisi, bato bavandaka na émisphère ya likolo (nord) basepelaka Solstice ya Hive, bo’ eleko bokuse ya mwinda ya mokolo botikelaka esika na mikolo miye mizali na ntango ya moyi molayi, mpe elaka ya nature (libanda lya bomoi) komikomisa sika. Bato ba kala na mokili bazalaki kosepela bobandi ya mobu mpe kozela bomonisami ya sika ya moi na elambo mpe milulu, misusu kati na yango misalamaka kino sik’oyo, mitiaka mokoloto na mwinda. Kosepela mbotama ya Yesu pene na eleko ya Solstice ezwaki maye mawuta na makanisi maye ma kala mpe milulu ya kati ya Hiver miye mizali kino sika na kati na masanga ma bato na mokili.

Pene na le 22 décembre, bana ba Chine mpe mingi ya bato ba Asia ya Est basepelaka Dōngzhì, eloko mabota masanganaka mpe baknisaka mobu mowuti koleka, lokola mpe mpo na kosepela bokomi ya eleko ya malili (Hiver) mpe bozongi bwa mwinda. Festival ya kala Yalda ezali elambo ya solstice ya Hiver na Iran, ntango bayi Japon basepela Toji, milulu mya kala misalamaka pene na kobanda mobu mwa sika na bokolongono bolamu mpe mapamboli to bilaka bya mabaku malamu.

Bilambo bizali lolenge mingi, kasi bisika binso molimo ya kosepela mpe komona bolamu nde mozalaka. Mpo na ba Kristu, eloko elobamaka wuta bikeke ezali esakola na Angelu na butu wana ya yambo na Noël, ya mbotama na elaka na yango: “Kimya na mokili; bolamu na batu.”

“Mobu monso na Bokristu, to kanisaka solo molimo wana ya Noël mozali te maye tozali na yango, kasi oyo tozali, moko na moko ezali, mwana na Nzambe. Ezali lizali ya solo ya esengo eleko eye ya mobu. Yango nde epesaka mpenza esengo na Noël,” elobaki président Donald Trump.

“Tozali kosambela ete mboka na biso ezala esika mwana nyonso ayebi ndako etonda na bolingo, lisanga etonda na elikya mpe ekolo epambolama na kondima.”

Anncr: That was an editorial reflecting American ideals and institutions.

XS
SM
MD
LG