Mpo na kobatela bonsomi bwa Amerika mpe kobomba basali ya USA na bolandelami bozangi sembo mpe bozonga botosi na mibeko, Etats-Unis epesaki etumbu ya nkita likolo na Zuzi mokonzi to Procureur mokambi ya CPI Fatou Bensouda mpe na moyi ya motuya ya limpinga lya bokangi na ye, Phakiso Mochochoko.
Na biyano apesaki na mituna, ntoma akendeka bisika na bisika mpo na Misala mya molongo mya sembo Morse Tan alobaki CPI ebima na etinda na yango ya yambo. Na esika ya kosala neti ezali eloko ebakisami na misala mya sembo mya mboka miye mimemaka na sembo baye basalaka mbeba ya somo, CPI ebanda koluka basali ba Amerika mpe basungi ba bango na ndenge etindami na politiki:
“Cour pénale internationale ezali kosala te ndenge esengeli. Esengeli ezala esika ya suka ya kokende. Mpe tosi tozala liboso ya bolandelami ya nzela, likolo ya basali na biso… Tozali na misala mya sembo mitalaka makambo manso miye mokili elulaka mpe mizali ndakisa. Mpe likanisi ete tokoki te komema yango biso moko lizali, solo, ya soni.”
Ntoma Tan alobaki ete bolukiluki botindama na politiki CPI ebanda kosala, ata likolo ya basali ya USA na Afghanistan, ezali kopekisa, na esika ya komema sembo liboso.
“Mpe yango nde te eye Cour esengeli ezalaka kosalaka. Ezalaka na yango te mpenza, ata kolanda balandi ba yango ya makasi, na makasi mpe makoki. Ezali na mbeba ya ntina ekasi minei ya Statut ya Rome, moko na yango ezali kotalama lisusu (na appel), Etats-Unis esala mingi koleka eye cour eye esala na ndelo eye inso.”
Mbongwana ekasi esengeli esalama na ntina ya kobatela sembo eye etikali na misala mya CPI, mpe kopesa nzela na Etats-Unis kosala elongo na cour esika esengeli. Kai kino yango ekokisama, ntoma Tan abeti sete été, président mpe Secrétaire d’Etat bazali na molende ya kozala na basali na Amerika mpe kobatela bango na komema o’liboso ya limpinga liye lilongala mayele mango na kotalaka kaka sembo.
Anncr: That was an editorial reflecting the views of the United States Government.