Makoki maye matalami lokola “matambolaka nzela moko na bomoi ya bato banso mpe yango nde elakisi lelo oyo tobengi makoki ma bomoto,” elobi Peter Berkowitz, directeur ya politiki ya mabongisi ya staff na département d’Etat.
Mabongisi maye mabatela kaka te bayi Amerika na mboka na bango kasi ezali loboko ya politiki ya mboka ya bapaya libanda, elobi Mwana mboka Berkowitz:
“Tomipesaki lotomo ya kozala bilombe na yango na 1948 ntango tokambaki na Nations unies misala ya kondima Lisakoli lya makoki mabomoto. Ezalaki na bakonzi ba mboka bawutaki ngambo mibale ya mangomba ma politiki baye babundelaki makoki ma bomoto. Mpe komipesa ya Amerika ezalaki na botosi bwa bomoto ya moto nyonso ya bomoi.”
Mobu moko moleki, Secrétaire d’Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo abengisaki misala mpo na Makoki makoki te kokakolama na etinda ya siki siki, elobi Directeur Berkowitz:
“Secrétaire Pompeo asengaki bayi misala miye kolukaluka, kosakola lisusu molende mwa Amerika na politiki ya makoki ma bomoto, na mikanda mya likonzi ya Amerika -Lisalakoli ya Lipanda, mpe Buku Likonzi ya Etats-Unis- na bokoko ya Amerika mpe lisusu na kosunga biso kososola botelemi bwa Amerika na makoki ma bomoto na pole ya Lisakoli lya molongo ya makoki ma bomoto, liye totiaki manzaka na mobu.”
Makoki makakolamaka te masimbaka boyokani ya Etats-Unis na bikolo misusu, elobi directeur Berkowitz :
“Tazali komona yango, ndakisa, na bopaleli ya secrétaire Pompeo na botiami na boloko ya Musilamani Uighurs kati na ba camps nzike na Chine. To monaki yango na mibu 1980 ntango Ronald Reagan abundelaki makoki ma bomoto ma baye bakabwani na Union Soviétique baye batiamaki na bokolo na ba camps. Toyoki yango ntango mbulamatari etelemeli Ekolo islamiki ya Iran, eye enyokoli mpe bana ba mboka na yango.”
Ntango “makoki ma bomoto mazali mpenza te mpo na politiki ya bikolo bya bapaya, elobi directeur Berkowitz, mazali “moko na malambo ya motuya kati ya liboke ya politiki ya bikolo bya bapaya ya Amerika.”
Anncr: Ezalaki maye malakisi makanisi ma mbulamatari ya Etats-Unis. Soki bozali na maye ya koloba, bokomela biso na Editorials
V-O-A, Washington, D-C, 20237, U-S-A.Bokoki mpe kotika makanisi ma bino – mpe kolanda ba éditoriaux na bison a page Nini mbulamatari ya Amerika akanisi: https://editorials.voa.gov/z/6222