Mabongisi ya Uganda mpo na kobundisa bokono bwa SS

Sickle Cell

Mobu monso, pene na bana 300.000 babotamaka na Afrika ya nse ya Sahara na bokono bwa SS bowuta na mbongwana ya kala ya moko na ba gènes ekambaka bokoli bwa hémoglobine.

Bokono bwango bopesa mpasi ya makasi, bobebisami bwa biteni ya nzoto, mpe bwa lolenge nzoto esalaka. “Bobebisami bwa lolenge nzoto bosalamaka mpenza na libandela. Yango, bana baye bazwaka kisalisa lisengeli te bakoki kokufa na ba infections bactériologiques noki mpenza,” elimboli Brett Giroir, monganga ya bana mpe Amiral ya Misalsa mya bokolongono bwa bato oyo azali sika Kalaka molandi ya Bokolongono ya Département ya misala ya Bokolongo mpe bomoto. Solo, na bikolo bya nkita moke mpe ya katika, bana pene na 80% bakufaka na bokono bwa SS yambo na mibu mitano.

Mpamba te bokono bwa SS bozali mbeba ya ba gènes eye emonanaka mingi kati na bayi Amerika bawuta Afrika (bahindo), “Etats-Unis… ezwa mpenza bokambi na komema bokono bwa SS na molongo ya yambo ya bitumba,” elobi Amiral Giroir.

Na molongo, Etats-Unis ezali kosala na bikolo lokala Uganda, eye esakolaki mwango ya mboka mpo na kobundisa bokono bwa SS. “Mwango ya Uganda, nakanisi, ezali mpenza eloombo,” elobi Amiral Giroir:

“Ezali mwango ya siki siki. Ntalo epesama. Esalama na kolanda ntango ya eloko moko. Yango, toyebi nini esengeli kosalama ntango nini. Yango, ezali mwango mwa makasi mpenza moye mokoki kolandama lokola ndakisa mpo bisika bitikali na continent.”

Ezali na litomba koyeba ete mwango mwango mosala na ekolo Uganda mpo na bana ba Uganda, elobi Amiral Giroir.

“Oyo Uganda esali ezali nde atunaki mituna mpo na kososola na kati ya mboka, ezali na bituka mingi epayi wapi SS emonanaka na bato mingi koleka bisika misusu. Mpe yango ezali lokola likama y aba gene na… na baye bavandaka na bisika biye mpe ndenge yango ekolanga nsima nan tango. Yango, ezali mwango eye etalaka makambo ya kopesa biyano. Yango, ebandaka bisika wapi mpasi ya SS ezali mingi koleka. Yango, ezali na pene na 75 districts ya bokolongono biye bakolandela mpenza yambo mpe nsima komema yango bisika misusu.”

Uganda endima kopesa nzela ete mwango na yango ekoka kokabolama na Afrika mobimba. Ekosenga ebongisama kolanda bato, lolenge ya kobika mpe nkita ya ekolo na ekolo, kasi ezali pete esalama, elobi Amiral Giroir. “Etapi yay ambo ezali kozala na mwango. Ya mibale ezali kosalela yango mpenza. Kasi tozali na esika ya malamu ya kokela mwango mpe kotia yango na mosala.”