Accessibility links

Breaking News

Blinken na Rwanda


Secretary of State Antony Blinken, left, meets with Rwandan President Paul Kagame at the President's Office in Urugwiro Village in Kigali, Rwanda, Aug. 11, 2022.
Secretary of State Antony Blinken, left, meets with Rwandan President Paul Kagame at the President's Office in Urugwiro Village in Kigali, Rwanda, Aug. 11, 2022.

Na mobembo awuti kosala na Africa, Secrétaire d’Etat Antony Blinken atie na esika mayele ma sika mpo na Afrika ya nse ya Sahara maye mandimi bikolo bya Afrika mpe bana ba bikolo biye bo’ basungi na komema liboso bomengo to bolamu bokabolami na banso.

Makambo maye manso mamonisami na boyokani kati na Rwanda na Etats-Unis. “Botelemi nsima na bobomi bonene , genocide, mpo na kokoma esika mokili mozali koyaka likolo lya mbongwana, mpo na kotia misolo na bokeli misala, mpo na tourisme, ” elobaki Secrétaire d’Etat Blinken.

Etats-Unis na Rwanda basalaki elongo mpo kobongola malamu misala mya bokolongono na Rwanda ; koyikisa makasi milona mpe bobokoli bibwele mpe bileyi malamu ; komatisa mabaku ma nkita ; mpe kobongisa malamu kelasi, mpo ete bilenge ba Rwanda bapesama bokasi mpo na kolonga na maye matali nkita.

Na Boyokani na Covax, Etats-Unis epesaki koleka mino million mitano na ndambo ya mangwele na Rwanda, miye misungi ekolo kopesa mangwele na 70% ya bana mboka na yango.

Na mibu motoba mileki, Etats-Unis esungi koleka bana ba Rwanda 2,8 million kozwa lotiliki mpo na mbala ya yambo.

Na bokutani na president ya Rwanda Paul Kagame, Secrétaire d’Etat Blinken alobelaki mpe makambo mazali kotungisa, lokola sango ekoki kondimama eye elobi Rwanda ezali kopesa maboko na lingomba lya batomboki ba M23 mpe botindami ya mampiinga ma Rwanda kati na Ekolo Congo démocratique to RDC. “Liloba na nga na bakonzi babale [Félix] Tshisekedi na Kagame… lizalaki se lolenge moko: bopesi bonso ya maboko to boyokani bonso na lingomba lya basimba manduki songolo na monyele ya RDC bozali kotia na likama masanga ya bavandi mpe kimya ya etuka,” ekebisaki Secrétaire d’Etat Blinken. “Mpe ekolo inso na etuka esengeli kotosa ndelo ya mobimba ya bikolo bisusu.”

Bakonzi ba Rwanda mpe ba Congo bandimaki kozongela masolo na mangomba ma basimba minduki na nzela ya misala mya Nairobi, mpe bikolo mibale bindimi bokobi bwa misala mya Amerika na kosunga makasi ma boluki kimya bokambami na bayi Afrika.

Likambo lisusu litungisi Etats-Unis ezali bokeyi liboso lya bobateli makoki ma bomoto mpe lisungi na société civile na Rwanda. “Tokanisi ete bato ba mboka inso basengeli kozala na makoki ma koloba makanisi ma bango na bobangisami te, to na kobangaka te ete batiama na boloko, to babetama, to likambo lisusu lya ndenge wana,” elobaki Secrétaire d’Etat Blinken. “Ezali solo ata ko bazali ba opposants ya politiki, babundi ba makoki bamoto, bapanzi sango… to kaka bana mboka.” Alobelaki mpe lolenge ya libunga ya bokangami ya oyo azali na mikanda ya bovandi na Etats-Unis Paul Rusesabagina na bakonzi ba Rwanda.

“Tozali kokamwa mpenza bana ba Rwanda, mpiko na bango, molende na bango, nyonso maye batongi, ” elobaki Secrétaire d’Etat Blinken. “Mpe tozali na elikya ete masolo tozalaki na yango makosunga boyokani na biso kokola kutu makasi mingi. ”

Anncr: Ezalaki mbongo editorial etalisi makanisi ma mbulamatari ma Etats-Unis

XS
SM
MD
LG