Accessibility links

Breaking News

Lisungi lya Etats-Unis nsima na boningisami ya mabele na Turquie mpe Syrie


Bato bazali kolokota bitiki na ndako moko ekweyaki na boningani ya mabele na Elbistan, Turquie, 14 sanza ya mibale 2023. REUTERS/Maxim Shemetov
Bato bazali kolokota bitiki na ndako moko ekweyaki na boningani ya mabele na Elbistan, Turquie, 14 sanza ya mibale 2023. REUTERS/Maxim Shemetov

DATE: 02/14/2023

NUMBER:

LEGACY_CODE:0-22448

Bato koleka 20.000 bakufaki mpe nkoto na nkoto na bato bazokaki nsima na boningani ya mabele ya makasi 7,8 boye bosalamaki na Turquie mpe Syrie o’mokolo mwa motoba ya sanza ya mibale. Boningani bwa mabele mango bosalamaki na ntongo makasi, elingi koloba ete bato mingi bazalaki nanu na mbeto, yango esalaki ete bakangamaki na mabanga ma bobukani ya ndako mingi.

Mampinga ma lisungi mazali kosunga na makasi manso bato baye babiki lokola misala mya lisungi mikebisi ete mbula mpembe mpe malili, lokola mpe bozangi mayi, ndenge ya kosolola mpe lotiliki, bokoki kozala ebaka na makasi mazali koslama. Pene na bato 70.000 bazoki na Syrie mpe Turie, kolanda motango mopesami na mbulamatari ya Turquie, basungi ya Wuite Helmets (bikoti ya pembe), mpe misala mya bapesi sango. NA bokutani na bapanzi sango na Osmaniye, mokonzi ya Turquie Receo Erdogan alobaki ete ngako 6.444 ekweyaki na boningani bwa mabele boye. Mampinga ma lisungi maye mawuti na bikolo koleka zomi mazali na Turquie kopesaka maboko basali ba ekolo eye ba lisungi mpo koluka kobikisa mpe bato.

Komema lisungi na Syrie ezali matata mingi likolo ndenge mbulamatari ya Syrie epekisa bato kotambola bisika mingi mpe komema lisungi. Bokatisi ndelo ONU epesamaki ndingisa mpo na komema lisungi wuto Turquie na nord ya Syrie ekangamaki mpo na mwa ntango nsima na boningani yam abele, yango etaiki ebaka na makasi mazali kosalama mpo na kopesa lisungi. O’mokolo mwa libwa ya sanza ya mibale, molongo mwa mituka ya ONU ekokaki kokatisa wuto Turquie kino kati na Syrie mpo na mbala yay ambo wuto boningani bwa mabele.

Na bokutani na bapanzi sango ya kala te, Secretaire d’Etat Antony Blinken atindaki maloba ma kobondisa mitema mpo na kufa eye “mpasi mingi na motema” ya bato na Turquie mpe Syrie.

“Biso, nakanisi elongo na bato ba mokili mobimba, tozali kolela baye babungisi bomoi bwa bango, mpe lisusu makanisi ma biso mazali bongo nab aye bakufisi baye balingaka.”

Secretaire Blinken abeit sete na maye Etats-Unis ezali kosala mpo na kosunga:

“Kino sika, totindi bato koleka 150 baye baluka mpe basali ba lisungi na Turquie. Tozala na bapakapaka ya Etats-Unis eye ezali kosunga koluka na bisika biye bikoki kozala mpasi mingi kokoma. Na Syrie, tozali na ONG basunganga biso lokola White Helmets baye topesaki mololo mibu mingi baye bazali kopesa lisungi lya lobiko wuto boningani bwa mabele bosalamaki. Na bikolo bibale biye, totindaki bakambi baye bayebi mosla ya lisungi, basali baselela bisaleli ya makama, ba ingénieurs, logisicitiens, basungi bwa lisungi ya minganga, mpe bausu, elongo na pene na 77.110 kg (170.000 livres).

“Tozali na molende,” elobi Secrétaire Blinken, “ya kosala manso tokoki mpo na kosunga baye bazwaki mpasi na boningasami ya mabele bosalamaki mikolo miye, mposo miye, mpe basanza eleki.”

Ezalaki editorial etalisi makanisi ma mbulamatari ma Etats-Unis ya Amerika.

XS
SM
MD
LG