Accessibility links

Breaking News

Mbano ya basi ba mpiko ya mobu 2023


Molongani ya mokonzi ya Etats-Unis ya Amerika Jill Biden (G) na Kalaka ya Ekolo Antony Blinken na milulu mya bopesi mbano na basi ba mpiko ya mbala ya zomi na sambo International Women of Courage Award na ndako ya mokonzi ya mboka (Maison Blanche)
Molongani ya mokonzi ya Etats-Unis ya Amerika Jill Biden (G) na Kalaka ya Ekolo Antony Blinken na milulu mya bopesi mbano na basi ba mpiko ya mbala ya zomi na sambo International Women of Courage Award na ndako ya mokonzi ya mboka (Maison Blanche)

Département d’Etat epasaki kala mingi te mbano na yango ya mobu na mobu na basi ba mpiko na molongo, International Women of Courage Awards.

Basi baye bapesami lokumu basalaki misala mpo ete mambi ma sembo ma bikolo bya bango mabatela bato banso, na kotala te soki ezali mwasi to mobali, biymba na bato to bisika bawuta, elobi Seceretaire d’Etat assistant to Kalaka ya Ekolo mousngi, ya mambi ma Bobateli mwa bocivili mpe Makoki ma bomoto, Ezra Zeya:

“Mpe mabongisi maye makoki te -to makokoka te- kobatela mwana mboka moko moko, babundaki mpo na kobongola yango. Babukaki bipekiselo, batombolaki ndelo ya sika, mpe bamemaki na ndakisa bilenge basi kolanda bokambi bwa bango.”

Moko na baye bandimami ezali Dr. Zakira Hekmat. Abotama na Afghanistan, Dr. Hekmat akelaki the Afghan Refugee Solidarity Association (Lisanga lya bondeko lya Aghnistan lya baye bakima) na Turquie mpe asungaki bayi Afhganistan mingi kozwa bobatelami ya baye bakima mboka mpe basengi kovanda na bikolo bya bapaya.

Alba Rueda, Motindami ya lokumu ya Argentine mpo na Mambi makozala mwasi to mobali mpe ndenge moto aponi kozala, asalaki Makasi mingi na boleki bwa mobeko mowa kopesa esika na basi-babali to Trangender Labor Quota Act.

Na ekolo eye ya Amerika ya kati kati, professeur Danièle Darlan andimamaki mpo na kobatela Buku likonzi lya mboka na ye.

Mama Doris Rios ya Costa Rica amikotisaki na mabandisi maike ma kobongola malamu bomoyi ma “bakolo mboka”.

Meaza Mohammed ya Ethiopie, mopanzi nsango ya kala ya Ethiopie, apesa nsango mingi ya baye babika na monyokoli mosalamaka mpo moto azali mwasi to mobali mpe abundaki na ntina ya kopesa lisalisi na baye bazwaki mpasi.

Na Jordanie, mobundi ya makoki ma bomoto Abdel Aziz azali mokeli mwa Justice Center for Legal Aid (Esita ya lisungi na mambi ma sembo), eye esungaka nkoto mingi ya bat oba mpasi mobu monso.

Bakhytzhan Toregozhina ya Kazakhstan azali moyi société civili oyo abundaki na ntina ya makoki ma bomoto na Kazakhstan mibu mingi.

Sénateur Datuk Ras Adiba Radzi ya Malaysie alekisa ntango molayi na mosala mwa ye na komemaka o’boso mpe kotombolaka makoki ma bomoto, kosalelaka ba plateformes na bisaleli bya ye ya internet na kotalisaka na mpwasa bozangi bosembo bonso na Malésie.

Général de Brigade Bolor Ganbold ya Mongolie akomaki général ya mwasi ya yambo na mampinga ma likolo ma Mongolie na 2022.

Bianka Zalewska azali mopanzi sango ya Pologne oyo alukaki nsango ya bitumba bya Russie na Ukraine wuto 2014 mpe abundaki mpo nab ana ba mboka ba Ukraine wuta koleka mibu zomi.

Yuliia Paievska ya Ukraine ayebana malamu mpo na mosala mwa ye ya kozwaka bililingi na kobombana mpe kobimisaka yango na kopesaka nsango ya mambi ma nsomo mampinga ma Russie masalaki na Mariupol.

Mpe ya suka, mbano ya Madeleine Albright Honorary Group Award ekendaki na mwasi mpe elenge mwasi motelemeli ya ekolo Iran.

“Na baye topesi lokumu”, elobaki Kalaka ya Ekolo Blinken, “Etats-Unis ezali na lipumbu (lolendo) yakozala na ngambo na biso, lokola bino mpe basusu bobundaka bitumba mingi ya mike mike, mokolo na mokolo. Mpe tokozala wana mpe, tokozala wan ana bino na znela eye ya molayi.”

Ezalaki makanisi matalisi lolenge la komona makambo ya mbulamatari ya Etats-Unis ya Amaerika.

XS
SM
MD
LG