Accessibility links

Breaking News

Blinken na Niger


Kalaka ya Ekolo ya Etats-Unis Anthony Blinken (G) na Niger
Kalaka ya Ekolo ya Etats-Unis Anthony Blinken (G) na Niger

Niger ezali na nkwokoso ya ndenge mingi, lokola bitumba bya kanza ya badongolomeso mpe nkwokoso ya climat. “Na moko to mosusu, elobali Kalaka ya Ekolo Antony Blinken, “Niger etiaki o’boso bosangisi ya banso, misala mya lisanga, biyano na misala. Etats-Unis ezali kosunga na boyokani boye tosalaki elongo mpe mpo na kokomisa yango pene mpenza,” ebakisaki Blinken na mobembo awutaki kosala.

Kalaka ya Ekolo Blinken asakolaki $150 million ya lisungi lya sika nan tina ya kosunga bosenga na West mpe na Kati ya Afrika mpe na Sahel bye bomemami na na bozangi bokengi na etuka eye:

“Lisungi liye likozala mpo na ndako (bisika ya kocanda), lisali lya bokolongono ya lotomo, bileyi bya bosenga Makasi, mayi ma petwa ma kolmela, nzongo, misala mya bopeto, mpe likosunga ba kima bisika bya bango ya kovanda mpe bayeki bakende bikolo bya bapaya mpe balukaka kobonbana na ekolo songolo baye bamema na Niger.

Etats-Unis ezali mpe kosunga Makasi mazali kosalama mpo na bokengi ya ntango molayi na Niger, na kosungaka bayi misala mya bokengi na Niger kozala na elonga na bitumba na badongolomeso, na kolendisaka bokengi na ndelo, makoki ma kobundisa mombongo ya lopipi, koetelemela mimbongo mya bato mpe makango mabe, mpe bitumba ma badongolomeso.

Kalaka ya Ekolo Blinken alobelaki mpe ndenge kotelema na nkwokoso ya bileyi na molongo:

“Topeska maboko na lisungi na baye bazali na nzala Makasi. Kaka wuta bitumba bya Russie na Ukraine mobu moko mleki, tobakisaki $13.5 billion nan tina ya kopesa eyano na nkwokoso ya nzala na mokili, kasi mingi na yango ekanda mpenza nde na Afrika. Tozali na koleka mingi mpenza bapesi misolo (lisungi) ya Makasi koleka na PAM Manaka ma molongo mpo na bileyi , mpe lokola, mpe misala misusu mya molongo miye misungaka na kopesa eyano na mpasi ya nzala.”

Etats-Unis ezali mpe kosunga the Black Sea Grain Initiative (Mabongisi ma mboto -graine- ya Mbu ya Moyindo), eye ezali komemaba grains ya Ukraine na bikolo bya Afrika, esakolaki Secretary Blinken

“Koleka tonnes métriques minei ya blé ememamaki mbala moko na bikolo bizali kotombolama bo’ mbano ya misala miye. Ezali pene ma biteni bya mapa milliard mwambe. Mpe bongo, ba millions na baton a mokili – mpe mingi mpenza aw ana Afrika- batelelaka misala miye mpo na kosunga kobundisa mpasi ya nzala. Ezali lotomo ete ekoba mpe ezali lotomo ete Russie epesa nzela ete ekoba.

Koleka lisungi liye lya lombango, Etats-Unis ezali kosala makasi mpo nan tango molayi na makoki ma Afrika makoyeba kobisaka bileyi mpe molende, mpamba te ntina na yango ya Makasi koleka mingi mpenza ete bikolo bya Afrika bikoka kobimisaka bileyi bya byango moko.

Ezali na nzela mingi misusu miye tozali kosala elongo mpo na kokende na bozindo na boyokani bwa biso, elobaki Kalaka ya Ekolo Blinken. “Niger ezali mpenza ndakisa moko ya makasi na eloko eye ya nkwokoso ekasi -ndakisa ya mpiko, ndakisa ya démocratie, ndakisa ya boyokani.”

Ezalaki makanisi matalisi ndenge mbulamatari ya Etats-Unis ezali komona makambo

XS
SM
MD
LG