Accessibility links

Breaking News

Bokembeli mibu 60 mya boyokani kati na Ekolo Amerika na Kenya


Biden US Kenya
Biden US Kenya

Ekolo Amerika na Kenya bazali kosepela mibu 60 mya boyokani botongamaki likolo na makonzi makobalami ngambo ibale na maye matali bonsomi, democratie, bokambi bwa mibeko, mpe botosi bwa makoki ma bomoto. President Joe Biden ayambaki kala mingi te president William Ruto na Maison Blanche mpo na kotiya elembo mpe kotala mikolo mikoya.

“Elongo, Ekolo Amerikana Kenya bazali kosala na ntina ya kopesa biyano na nkwokoso nzike eye ezali na litomba mingi mpo na bomoi bwa bana ba bikolo bya biso,” elobaki presient Biden. Kati na yango mpe bokengi, bokengi bwa nkita, cybersécurité, mpe bokengi bwa climat.

President Biden akumisaki mpiko ya nokambi ya president Ruto na maye matali lotiliki bokomisamaka sika to energie renouvelable. Solo, zomi na moko kati na nkama ya lotiliki ya bana ba Kenya ewutaka lotiliki ya petwa.

“Koleka ndako million yoko epesamaka kaka lotiliki ewutaka na mopepe. Africa Green Industrialization Initiative eye etikala na lisitwale, eye obandaki mobu moleki, ebongisami na lolenge ya bota mbuma ya ndenge moko na bikolo bisusu, mingi mpenza na continent” [END ACT]

Na etuka mobimba, Kenya na Ekolo Amerika bazali kotombola botieyi misolo na bokeli misala bwa lolenge ya malamu mpeza boye bozali komema na basali ya makoki ma likolo mpenza, technologie ya likolo mpe libanda lya bomoi ya malamu.

U.S. International Development Finance Corporation esakoli boyokani boye bomemmi libenga lya yango koleka $ milliards moko mpe boyokani ya secteur privé ya ndenge na ndenge botiamaki manzaka, kati na yango misolo misusu $175 million mya compagnie Coca-Cola mitiyami. Makambo maye mpe boyokani misusu misengeli kobimisa ba nkama mingi ya millions misusu na misala mya nkita.

Elongo, Kenya na Aemrika bazali kotelemela elongo misala mya batongolomeso ya bayi ISIS mpe ya al-Shabaab na monyele ya Africa: bitumba Russie ezali kosala na Ukraine, mpe bitumba biye bizali kokweyisa ba democraties mingi na mokili, ezala na Africa mpe na continent Amerika.

“Totelemi na esika ya mbongwana, epayi mikano tozali kozwa ntango eye mikozala na mbano na maye makoya mikolo mikoya,” elobi president Biden.

“Nazali na kondima mpe na elikya lokola nazalaki mibu miye mileki ntango bana batriotes ya Keny batelemaki na ntina ete bendele ya sika emata likolo, mpamba te Kenya na Ekolo Amerika bazali elongo, kopesanaka maboko, kosungaka bana bikolo bya biso, mpe kotongaka mokili ya kitoko.”

Mokili moko ya mabaku ya malamu, lokumu, bokengi, mpe bonsomi mpo ban aba Amerika banso mpe ban aba Kenya banso

Mopesi nsango: Editorial eye elakisi ndenge mbulamatari ya Amerika ezali komona makambo.

XS
SM
MD
LG