Accessibility links

Breaking News

Basi ba mpiko na molongo na 2021


Julienne Lusenge mobundi ya makoki ya basi azwi mbano ya "mwasi ya mpiko" na mbulamatari ya Amerika, Kinshasa, 3 mars 2021. (Twitter/Ambassade ya Etats-Unis Kinshasa)
Julienne Lusenge mobundi ya makoki ya basi azwi mbano ya "mwasi ya mpiko" na mbulamatari ya Amerika, Kinshasa, 3 mars 2021. (Twitter/Ambassade ya Etats-Unis Kinshasa)

Mobu moye, mbano ya basi ya mpiko na molongo epasamaki na basi 21, sambo kati na bango babomamaki na bitumba na Afghanistan.

Na maloba maye na milulu mya Département d’Etat mya bopesi mbano, Secrétaire d’Etat Antony Blinken, oyo alandaki molongani ya mokonzi Jill Biden, alobaki “mibu 15, Département d’Etat epesa mbano ya basi ba mpiko na molongo na basi na mokili baye balakisa bokasi ya makasi mpe bokambi na kobunda mpo na kimya, bosembo, makoki ma bomoto mpe bokokani ya basi mpe babali.

Kati na basi bapesamaki lokumu ezalaki na Maria Kalesnikava ya Belorus. Ye mpe basungi ba ye balongaki mondeke mowumela mibu 26 ya bokonzi ya Aleksandr Lukashenka, na kotelemaka na kobanga te kotiama na boloko nsima na maponami mabe.

Phyoe Phyoe Aung azali mokambi azali komata na Birmanie. Mobangisi ma ye Institut Mapapu masunga bilenge kosangana ata na bokeseni ya kabila mpe ya biyamba mpe kotombola kimya mpe boyokani.

Molongi mosusu ya mbano, Maximilenne ngo Mbe ya Cameroun, atombolaki makoki ma bomoto mpe azalaki mongongo molobaka makasi kati na bayi société civile, na bobangaka te mpo na bokengi bwa ye moko, na makasi makoluka eyano ya kimya na bitumba na Cameroun.

Wang Yu ya Chine azali moko na bayi mboka basambeli bamonanaka mingi na bitumba bya makoki ma bomoto mpe abanga te kogama mpe kobwakama na boloko mpo na kobumnda na ntina ya batelemeli.

Julienne Lusenge, ya Ekolo Congo démocratique azali mwasi mobundi oyo akambaka bitumba bisalamaka kolanda bomwasi to bomobali.

Mbano misusu mipesami na Mayerlis Angarita ya Colombie, zuzi Erika Aifan ya Guatemala, Shohreh Bayat ya Iran, Muskan Khatun ya Nepal, Zahra Mahamed Ahmad ya Somalie, monyango Alicia Vacas Moro ya Espagne, Ranitha Ghanarajah ya Sri Lanka, Canan Gulllu ya Turkie, mpe Ana Rosario Contreras ya Venezuela.

Secrétaire d’Etat Blinken alobaki ete basi mpe bilenge basi bazalaka mingi “bato bayokaka mpasi koleka na mbeba ya makoki ma bomoto:”

“Yango wana bokokani ya makoki mpe lokumu ya basi mpe bilenge basi ezali likambo lya motuya na politiki ya bapaya ya Etats-Unis. Ntango tosalaka politiki ya bapaya na biso na makoki mpe bosenga ya basi mpe bilenge basi na makanisi, politiki na biso ebotaka mbuma, mingi ya bomoto, mpe koleka ya bokeseni eye ekowumela na bomoi ya bato.”

Na balongi mbano, Secrétaire d’Etat Blinken alobai : “Bozali kokomisa mokili na biso ezala sembo mingi, elenda, na kimya, mpe bonsomi. Etats-Unis ezali na lipumbu na kozala na ngambo na bino.”

Anncr: That was an editorial reflecting the views of the United States Government.

XS
SM
MD
LG