Accessibility links

Breaking News

Etando ya Ethiopie ezali na likama


Mgombe ezali koleka kati na ba chars ebimisami na bitumba kati na mbulamatari ya Ethiopie na ba soda ba Tigrée, pene na mboka Humera, Ethiopie, 3 mars 2021.
Mgombe ezali koleka kati na ba chars ebimisami na bitumba kati na mbulamatari ya Ethiopie na ba soda ba Tigrée, pene na mboka Humera, Ethiopie, 3 mars 2021.

Etats-Unis emitungisami makasi na makama likolo na etango ya mboka Etfiopie. Ya makasi koleka kati na makama maye, ezali nkwokoso ezali kokoba na etuka ya Trigrée.

Bana ba Tigrée bakobi konyokwama na mbeba ya makoki ma bomoto mpe koleka million bazali na nzala. Na ntango moko wana lisungi lya lombango lisengelamai likangami na mampinga ma Ethiopie mpe Erythrée lkola mpe na basimba minduki basasusu.

“Etats-Unis epameli makasi mpenza bobomi, bolongoli bato na makasi bisika bavandaka, mpe mbeba mpe monyokoli misusu ya bomoto,” elobi Secrétaire d’Etat Antony Blinken na liyebisi. “Tozokisami mpe mitema mpo na bobebisi ndako ya ba civili ata mpe mazaiba ma mayi, Mapitalo, mpe bisika misusu ya lisuki, bozali kosalama na Tigrée.” USA esengi na mbulamatari ya Ethiopie kobesa etumbu na baye bazali na mokumba ya mbeba ya bomoto, kobatela ba civili, mpe kopekisa te lisungi lya bato.

“Ata bilaki ya diplpmatie bizali mingi,” elobi secrétaire d’Etat Blinken, “ngambo inso na matata ya Tigrée basali ata likambo moko te mpo na kosukida bitumba to koluka kozwa kimya na nkwokoso ya politiki.”

Secrétaire d’Etat Blinken asengi na mbulamatari ya Eythrée kozonga sika ba soda ba yango na ndelo eyeba na molongo. Soki bitumba bisili te, na kopesa nzela na lisungi, bozangi bileyi bozali kongala sika bokomema na nzala ekasi.

Na komona makambo ma mpasi kati na Ethiopie, secr♪0taire d’Etat Blinken asakoli bopekisi ya visa na bayi mbulamatari ya ethiopie, ya kala to ya sika, ya bayi bokengi, to na bato banso ata bayi etuka ya Amhara mpe mampinga mpe bayi Front populaire ya liberation ya Tigrée, bakambi, to bayokani na bango, na kobebisa boluki kimya na Tigrée. Baye basalaki mbeba na bana ba Tigrée, lokola mpe na baye bapekisaki lisungi bakozwa mpe etumbu yango. Bayi mabota ma pembeni ma bato baye bango mpe bazali na nse ya bopekisi boye.

Secrétaire d’Etat Blinken asengi mpe na bayi mbulamatari esusu kosunga USA na mikano miye.

Bakisa na yango, USA etie epekiselo mingi ya nkita mpe ya lisungi lya bokengi na Ethiopie. “Tokokoba lisungi mpe kopesa maboko na bosenga misusu na Ethiopie,” elimboli secretaire d’Etat Blinken. Etumbu eye ezali likolo na Erythrée, ekotikala.

Etats-Unis ekokba kopesa lisungi na makasi mpo na kosilisa matata na Tigrée mpe kosunga ban aba Ethiopie kokende liboso na boyokani mpe masolo.

Anncr: Oyo ezalaki editorial etalisi makanisi ma mbulamatari ma Etst-Unis.

XS
SM
MD
LG