Accessibility links

Breaking News

Etats-Unis ezongi na boyokani ya climat ya Paris


Mokonzi ya Amerika Joe Biden sazali kolobela mbongwana ya climat na Maison Blanche, Washington, 27 janvier 2021. (Photo by MANDEL NGAN / AFP)
Mokonzi ya Amerika Joe Biden sazali kolobela mbongwana ya climat na Maison Blanche, Washington, 27 janvier 2021. (Photo by MANDEL NGAN / AFP)

Kati na misala mya ye mya yambo bo’ mokonzi ya mboka, Joe Biden azwaki mokano ya kozongisa Etats-Unis na Boyokani ya mbongwana ya Climat ya Paris.

Boyokani ya Paris endimamaki na likita lya climat lya Nations unies na Paris, na sanza ya zomi na mibale ya 2015. Ekotaki o’mosala le 4 novembre 2016, Nations unies etangaki bikolo 190 kati na Boyokani yango le 25 janvier 2021. Boyokani ya Paris bokela esika ezala te liboso mpo na misala mya molongo na ntina ya kopekisa makama na bomati na moto na mokili ntango bitumba tozali kobundisa mpasi tozali na yango likolo na mbongwana ya climat.

Boyokani yango bolukaka kopekisa temperature ya mokili ematata koleka degrés mibale ya Celsius likolo na ndelo pr-insdutriel to ndelo yambo na ba industries kosalama, na kokebaka ete 1,5 degrés eleka te na suka ya ekeke, esika bayi zebi to ba scientifiques balobi ete mbano mabe ya mbongwana ya climat ekoki komata makasi, kati na yango bomati makasi ya mayi na mbu mpe mpela ekasi, bokawuki ya mabele, mpe bozikisami ya nzamba.

Président Biden abobi polele alingi mbongwana ya climat ezala makambo ma yambo na mbulamatari na ye. Na yango, kozonga na Boyokani bwa Paris ezalaki moko na bilaka asalaka na campagne. Na lisikulu lya ye lya bovandisami na ebonga ya bokonzi, alobaki : “Mabele mazali konganga mpo na kotikala na bomoi. Bongangi bwango bokoki te kozanga elikya to koyokana te malamu sika.”

Mokambi ya mambi ma sango ya Maison Blanche Jen Paski alobi kozonga kati na Boyokani ya Paris ezali moko na makambo ma lintomba mpo na “kotonga boyokani na bondeko bwa biso na mokili mobimba mpe bozongisami ya Amerika na ebonga na yango kati na lisanga lya molongo. Mpe bokoki komona yango lokola elakisami na bozongi bwa yango na Boyokani bwa Climat ya Paris, bozongi na OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono) ; myango mya ye ya kokota na mosala na baninga mpe ba ndeko mpe kosala elongo na ntina yako pesa eyano na likama mpe nkwokoso tazali kobika na mokili.”

Bakisa na yango, président Biden atiaki Secrétaire d’Etat ya kala John Kerry bo’ Motindami ya mokonzi ya mboka mpo na mbala ya yambo na mambi ma Climat – mpo na maye matali climat makoka kozala na masolo manso, ata na makambo na ndako. Akokamba makasi ma diploamtie ya Amerika mpo na kolakisa bokambi bwa Etats-Unis na maye matali climat mpe kotombola makanisi mokili molingi kosala na ntina ya kopesa eyano na mondenge monene ya mbongwana ya climat.

Lisanga lya molongo lisepeli na bozongi ya Etats-Unis na Boyokani bwa Paris, ezala président ya France Emanuel Macron : "Tozali elongo. Na makasi mpo na kotonga lobi na biso. Na makasi mpo na kobatela mokili na biso. Taozali elongo.” Akomi na Tweet: “Bozongi bolamu na Boyokani ya Paris!"

Anncr: That was an editorial reflecting the views of the United States Government.

XS
SM
MD
LG