Accessibility links

Breaking News

Etumba na Ebola ezali kokoba


Basali ba bokolongono balati molato ya bobateli na Ebola na Beni, RDC, 16 juillet 2019.
Basali ba bokolongono balati molato ya bobateli na Ebola na Beni, RDC, 16 juillet 2019.

Na suka ya sanza ya misato, Secrétaire d’Etat Antony Blinken asakolaki ete mbulamatari ya Etats-Unis epesaki kino $30 millions na lisungi mpo na kopesa maboko na lombango na eyano na makono ma Ebola na Ekolo Congo démocratique mpe na Guinée.

Misolo miye mikosunga mpe koyikisa makasi na komibongisa mpo na Ebola na ndelo ya Côte d’Ivoire, Liberia, Mali, Rwanda, Sénégal, Sierra Leone mpe Uganda.

Ebola ezali fevele ebimisaka makila na nzoto mpe emonanaki mbala ya yambo na 1976 na oyo ezali lelo Ekolo Congo démocratique, pene na mayi na nkombo ya Ebola.

Kati na 1976 na 2012, kolanda OMS (Mabongisi ma molongo mpo na bokolongo), makono 24 ma Ebola mamonana na Afrika ya nse ya Sahara, mbano na yango ezalaki bakoni pene na 2.400 na bawei 1.590. Mpe bokono ya bonene makasi boyebana, boye bobimaki na Afrika ya west kati na décembre 2013 na Janvier 2016: bato 28.646 bazwaki bokono mpe 11.323 bakufaki. Bokono ya mibale ya makasi bobimaki na RDC wuto 2018 kino 2020. Ezalaki bokono ya mibale ya makasi na lisitwale lya mokili, ya mpasi koleka na lisitwale lya RDC, mpe ya mbala ya yambo na bisika ya bitumba.

Ebola epasamaka na kosimba nzoto ya nyama to moto ezwami na mayi to makila ya bokono. Mpasi to infection ekoki koya nsima na kosimba nzoto ya baye bakufaki na Ebola ntango ya milulu mya matanga lokola kosimba to kosokola bimbembe. OMS eyebisi ete lisali ntango maladi mawuti kobanda sika mpe bomipesi ya lisanga lya bavandi ezali fungola ya kobikisa bato mpe kopekisa bokono kopanzana. Mpo na koboya bokono bwa Ebola bopanzana mingi, esengeli bokengeli bokono bosalama mpo na koyeba bakoni mpe kopesa eyano na lombango mpe na makasi na bakoni basika mpe nzinga nzinga nae sika bokono bozwami.

Kino $30 millions ya ba dollars ya lisungi kowuta na mbulamatari ya Etats-Unis ekosunga kolandela bato banso basimbaki bakoni, lokola mpe botalisi na laboratoire mpe koluka koyeba mpasi bato bazali na yango. Ekomema na kotia CTE to bisika bya kopesa lisalisi mpe kobomba bakoni, mpe kolendisa bopekisi bokono mpe kotala bokono bwango na etando enene ya misala mya bokolongono.

Makoni to maladies infectieuses lokola Ebola ebangaka te ndelo ya bikolo mpe ekoki kopanzana noki, kobebisa bokolongono ya bato, bokengi, mpe bofulukisami ya bikolo binso. Mbulamatari ya Etats-Unis ezali na lipumbu ya kosunga makasi ya kopesa eyano na bokono boye ya nsomo mpe bokengi ya bokolongo ya mokili na ndenge ya monene.

Anncr: Ezalaki editorial elakisi makanisi ma mbulamatari ma Etats-Unis

XS
SM
MD
LG