Accessibility links

Breaking News

Kobundisa lingomba Etat islamique DAESH na Afrika


Mampinga ma RDC (FARDC) na bitumba na ADF (lingomba Etat islamique) na Beni, Nord-Kivu, 2014.
Mampinga ma RDC (FARDC) na bitumba na ADF (lingomba Etat islamique) na Beni, Nord-Kivu, 2014.

Kala mingi te, Etats-Unis ekendaki liboso na kobundisa basangani ba DAESH na Afrika ya nse ya Sahara. DAESH-RDC (ISIS-RDC), eye esalaka mingi na bituka bya Nord-Kivu mpe Ituri na Ekolo Congo démocratique, mpe DAESH-Mozambique.

Na mikolo mya suka mya sanza ya misato ya 2019, lingomba lya badongolomeso DAESH (Etat islamique) libetamaki na Baghuz, esika na yango ya makasi na Syria, na mampinga ya mboka eye masungamaki na bayi 83 ba lisanga lya molongo mpo na kokweyisa DAESH. Bokangolami bwa mboka Baghuz bolakisaki ete kalifa esakolamaki na lingomba liye ezalaki lisusu te. Ezalaki likambo lya motuya mpenza mpe bobaluki na makambo, kasi elakisaki mpenza te bokweyisami bwa DAESH yango moko, elobaki John Godfrey, mokambiya ngonga eye ya bitumba na badongolemso mpe mokambi ya ngonga eye motindami ya motuya mpo ma lisanga ya molongo mpo na kokusika DAESH.

Na suka ya 2019, DAESH esalaki mbongwana na kati na yango “ezalaki mpo na kotikela biteni bya yango makoki ma kozwa mikano na mokili.” Elobaki motindami ya motuya Godfrey. “Esika moko te makambo makambo mapesi mpasi lokola na Afrika.”

Bobangisi ya badongolomesa, ya baye basangani na mangomba ya DAESH mpe ya baye basangani na Al-Qaïda bokobaki kaka te kokola mwa mibu mileki, kasi lombango na bokoli na yango bokomaki makasi. Yango moko nan tina Etats-Unis eyokana na baningami na Afrika na misala mingi ya kolemela bodongolomeso.

“Lolenge la biso la kosala lolukaka kaka te kopesa eyano na ngambo ya bokengi kasi lisusu … makambo ya lolenge ya kobika mpe ya nkita (misala socio-éeconomique) ya badongolomeso, kotelemelaka sango ya DAESH, mpe kopesaka libaku linene lya nkita mpe bokasi ya masanga ya bavandi na ntina ete bobengami na kosala mabe mpenza (extremism violent) bozala na nguya te” elobaki Michael Gonzales, Sous-Secrétaire adjoint to vice-ministre molandi mpo mambi ma Afrika.

Na mibu minei mileki, makasi ma Amerika matalaki mingi Sahel, elobaki mokambi ya ngonga eye Godfrey. Na monyele to est, na Somalie, tokendaki mwa liboso na kosukisaka makasi ma Al-Shabaab ya kobongisa mpe kosala bitumba kati na Kenya, Na west ya Sahel, Etats-Unis esanganaki na France mpe baningami basusu mpo kotelemela bamemi na mobulu kuna.

Kala mingi te, Etats-Unis ekendaki liboso na kobundisa basangani ba DAESH na Afrika ya nse ya Sahara. DAESH-RDC (ISIS-RDC), eye esalaka mingi na bituka bya Nord-Kivu mpe Ituri na Ekolo Congo démocratique, mpe DAESH-Mozambique (ISIS-Mozambique), eye ezali mingi na etuka ya Cabo na nord ya Mozambique endimami kozala mangomba ma badongolomeso. Mangomba mabale maye mpe bakambi ba yango bandimami mpenza bo’ badongolomeso na molongo. “Bondimami bwango bozali boko na bisaleli tozali na yango mpo na kobebisa nkita na bango mpe nzela esusu ya lisungi mangomba ya badongolomeso bazali na yango mposa mpo komema bitumba bisika misusu mpe kosala bitumba,” elobi mokambi ya ngonga eye Godfrey.

“Soki tozali kokoba na bitumba mpo na bokwesami bokwumela ya DAESH – mpe tozali,” elobaki ye, “nde esengeli tobundisa yango na Afrika.”

Anncr: Oyo ezalaki editorial elakisi makanisi ma mbulamatari ya Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG