Accessibility links

Breaking News

Mikano mibebisi mitema na Zimbabwe


MDC - Alliance - Nelson Chamisa - Save Zimbabwe Campaign Anniversary
MDC - Alliance - Nelson Chamisa - Save Zimbabwe Campaign Anniversary

Etats-Unis ezali kolanda na bokengi makambo mazali koleka na Zimbabwe, nsima na oyo molobeli ya Département d’Etat Ned Price abengi “mikano mizali kotungisa mitema”.

17 mars, mokambi molandi ya MDC Alliance to Mouvement mpo na boyokani ya démocratie, Tendai Biti mpe bayi MDC Alliance basusu balongolamaki na bibonga baponamaki na Parlement to ndako ya bokeli mibeko ya Zimbabwe.

Elingi koloba ete wuto mars 2020, basali ba parlement bapesami maboko na mbulamatari ma Zimbabwe babimisaki libanda bakeli mibeko 39 ya MDC Alliance, lokola mpe baponami 81 ba esika eye. “Bikela biye”, elobi molobeli Price na liyebisi, “bizali kobebisa mokano ya baponi, na démocratie, mpe bizali kopimela ba millions ya bana ba Zimbabwe balakisi bilongi baponaki.”

3 mars, président Joe Biden abandelaki mpo na mobu mosusu etumbu epesama na baike kati na bayi mbulamatari ya Zimbabwe mpe basusu baye “bazali kobebisa etamboli ya Zimbabwe na démocratie mpe ba institutions”. Na mokanda motindamaki na Congrès ya Amerika mpo kobandela etumbu epesmakai yambo na 2003 na Executive order to mokano 13288, président Biden akomaki ete misala mpe politiki ya baye batiama na etumbu “ememi bobuki mibeko na nko na Zimbabwe, na mobulu motindami na politiki mpe bobangi na mboka, mpe na bobemisami ya politiki mpe nkita na etuka ya sud ya Afrika.

Lokola bobengani bwa bayi MDC Alliance bozali kokoba na Zimbabwe, molobeli Price ayebisaki ete Etats-Unis ezali mpe kolandela “makasi ya mbulamatari mpo na kopanza MDC Alliance na kokangaka mpe kotiaka na boloko bakambi ba yango mpe kopanza bozwi bwa yango.” Na kobakisa, akomaki: Etats-Unis emoni ete “mbulamatari ezali kotia na mosala na koponaka mikano mpo na COVID-19 na ntina ya kotindika maponami nsima mpe kopekisa mayangani ma MDC Alliance, ntango ezali kopesa nzela na maponami mpe mayangani ma mangomba mazali na bokonzi African National Union-Patrotic Front, (ZANU-PF)na mangomba bayokanaka na yango mpo na kokende o’boso.

“ZANU-PF ezali kosalela na kolekisa ndelo bisaleli bya mbulamatari mpo na kokanga minoko mya bana mboka, koniata opposition to bambanda, mpe kotia na makasi politiki na yango likolo na bana ba Zimbabwe,” elobaki Molobeli Price. “Tozali kosenga mbulamatari ya Zimbabwe kosalela etinda na yango ya kotosa bonsomi bwa maloba mpe ya basangani ezali na Buku likonzi ya Zimbabwe mpe na boyokani bwa yango na molongo”.

Anncr: Ezalaki editorial etalisi makanisi ma mublamatari ya Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG