Accessibility links

Breaking News

Mokolo ya ba présidents na 2021


George Washington
George Washington

O’mokolo mwa yambo ya mposo ya misato ya février inso, bana ba Amerika bapesaka lokumu na bakambi ba bango baleka na kokanisaka mokolo motiama mpo na ba présidents. Bokanisi bwango, boye lelo bopesaka lokumu na ba presidents banso, bozalaki o’libandela mpo na kokanisa George Washington.

Geroge Washington azalaki président wa yambo ya Etats-Unis.

Bo’ moto akambi ntango ya Bitumba bya bongwana (Guerre révolutionnaire) mpe ya mbulamatari ya yambo, Georfe Washington azali mpenza moto ya bato mingi. Atalamaki -mpe kino sika aatalamaka- mingi bo’ Tata ya Etats-Unis. Na ngambo moko mpo azalaki mokambi ya soda akelamaki nae longa y aba colonies ya Amerika likolo lya mampinga ya makasi koleka ya ntango wana. Kasi azalaki na lolenge ya moto akokoma mokonzi ya mboka, na kolakisaka ndakisa mpo na baye bakoki kovanda nae bonga eye nsima na ye.

Washington andimelaki litomba lya kozala na katikati ya bokonzi ya makasi makoki mpe ya kokoka kokamba mbulamatari ya mboka, kasi ya makasi koleka te lokola mokonzi ya monarchie (nkumu aza na nguya nyonso). Na komitungisa ete soki akufi na ebonga ya mokonzi, bato bakoki kozwa mokano ete bokonzi ya président bosengeli kowumela bomoi mobimba, Washington atikaki bokonzi nsima na mandat to ntango ya bokonzi mibale. Lokolngola kaka mandats to bokonzi minei ya Président Franklin Delano Roosevelt- mokonzi nionso alanda ndaki ndakisa ya Washington ya kolekisa te mandats mibale na bokonzi. Na 1951, Congrès ya USA endimaki 22e amendement ya Buku likonzi ya Etats-Unis, eye esukisi bokonzi ya mboka na mandats mibale.

Président Washington nde apesaki ndakisa ya kolanda na bokonzi bokoya. Atalisaki ndenge nzela ya kolanda na makambo mingi, kati na yango bokonzi ya politiki, misala mya bosoda, mpe politiki ya nkita.

Kokamwa te ete banda 1800, mobu molandaki nsima na kufa na ye, eyenga ya mbotama ya George Washington, le 22 février, esepelamaki na ekolo mobimba eye ya sika, kasi na mobeko te motindaki yango. Kosepela eyenga ya mbotama ya Washington ekomaki eyenga to loyi ya mboka mobimba na 1885. Suka suka, mokolo mwa yambo na mposo ya misato ya février ekomaki mokolo mwa kosepela mpo na kopesa losako na ba presidents banso.

Mokolo mwa ba présidents mopesaka losako na bakambi baye bazalaki na mpiko mpe na molende ya kotelema na mosala makasi mpe kokamba Etats-Unis na ntango malamu mpe mabe.

“Banso bamonaka, mpe mingi basepelaka, bongengi bozali mibanda na ndako ya mosala ya molayi,” ekomaki mokolo moko George Washington na mokanda atindelaki moninga naye. “Mpo na nga, eloko moko te ezali kati na yango, koleka bongengi bokoki kolakisama na bokangami na yango na nguya ya kotombola esengo ya koleka ya bomoto.”

Anncr: That was an editorial reflecting American ideals and institutions.

XS
SM
MD
LG