Accessibility links

Breaking News

Mokonzi ya sika; eleko ya sika


Président Joe Biden azali kolapa ndayi na bovansiami bwa ye na bokonzi, na Capitole, Washington D.C., 20 janvier 2021, (Foto: AFP/Saul Loeb)
Président Joe Biden azali kolapa ndayi na bovansiami bwa ye na bokonzi, na Capitole, Washington D.C., 20 janvier 2021, (Foto: AFP/Saul Loeb)

Na nkoto na bendele kopepa mopepe ya hiver, Joseph Robinette Biden, Jr. alapaki ndayi bo’ 46e président ya Etats-Unis na b’étages ya Capitole ya Amerika le 20 janvier.

Na lisikulu lya ye, président Biden abengaki bana ba Amerika banso kosangana na ntina ya kolonga mondenge ya ekole mpe kobatela lobi na yango.

“Lisitwale, kondima mpe bwani elakisaka nzela, nzela ya bomoko. Tokoki komisa boko na basusu likabo lya lokumu mpe botosi. Tokoki kosangisa makasi, kosukisa koswana, mpe kokitisa moto… Oyo nde ngonga na biso nkwokoso mpe mpasi ya lisitwale, mpe bomoko bozali nzela ya kolanda.”

Na baye bazali libanda na Etats-Unis, président Biden mpe apesaki maloba :

“Tokobongisa boyokani bwa biso mpe kotambola lisusu elongo na mokili. Mpo nkwokoso eleka te, kasi ya lelo mpe ya lobi lokoya. Tokamba lisusu kaka te ndakisa ya bokasi bwa biso, kasi na nguya ya ndakisa na biso. Tokozala basungi ba makasi mpe batielama motema mpo na kimya, kokende liboso mpe bokengi.”

Nsima na ngonga mokolo yango, président Biden azwaki mikano mingi kolanda makambo maye. Moko na mikano myango mobandaki misala mya Etats-Unis mpo na kozonga kati na boyokani ya Climat ya Paris. Mosusu mosukisaki bolongwi bwa Etats-Unis na OMS, Mabingisi ma molongo mpo na bokolongono. Mosusu mosukisaki bopekisi na basali mibembo bawutaka bikolo biike bitonda na ma musulmane mpe basusu bawuta Afrike mpe bisika misusu. Mpe mosusu motelemisaki botongi bwa efelo na ndelo ya USA ne Mexico mpe mosukisaki lisakoli lya lombango lisungaki na na kobimisa misolo mpo na yango.

Na lisikulu lya ye nsima na bolapi ndayi, président Biden abengaki ban aba Etats-Unis “kobandela lisusu manso.” Asengaki bango elongo “lisitwale ya elikya na Amerika, ya pobangi te ; ya bomoko mpe ya bokabwani te… Lisitwale likoyebisa bikeke bikoya ete topesaki eyano na mbela ya lisitwale… Ete Amerika na biso ebatelaki bonsomi kati na mboka mpe etelemaki lisusu bo’ mwinda na mokili

He challenged them together to “write an American story of hope, not fear; of unity and not division…The story that tells ages yet to come that we answered the call of history…That our America secured liberty at home and stood once again as a beacon to the world.”

Anncr: That was an editorial reflecting the views of the United States Government.

XS
SM
MD
LG