Accessibility links

Breaking News

Ndenge nini Amerika etombolaka makoki ma bomoto o'libanda


Bato bazali kotala bilili bya Dr. Feng Shan Ho oyo asungaki ba Yuda kokima Autriche nsima na bitumba bya molongo ya mibale, na Sénat ya Etats-Unis, Washington, 19 mai 2008.
Bato bazali kotala bilili bya Dr. Feng Shan Ho oyo asungaki ba Yuda kokima Autriche nsima na bitumba bya molongo ya mibale, na Sénat ya Etats-Unis, Washington, 19 mai 2008.

Bitumba bya Amerika mpo na makoki mabomoto kati na mboka bipesi elikya na basi mpe mibali ya bikolo ya libanda mpo na koluka bonsomi na bango moko.

Rapport ya Commission ya makoki makakolaka te eye ebimisamaki kala te etie mokoloto likolo na lintomba lya bakambi ba Amerika lya kobunda mpo na makoki ma bomoto bo’ malako matambwisaka politiki ya bikolo bya bapaya ya Etats-Unis, elobi Peter Berkowitz, Directeur ya Politiki ya mabongisi ya Département d’Etat:

“Na boke, ezali na ntina mingi ete bakambi ba biso baloba na bokasi mpo etali bondimi ya Amerika bovandisama na Lisakoli lya Lipanda lya Amerika, bovandisama na lolenge ya mbulamatari eye bokonzi bonso bowutaka na mokano mwa baye bakambami. Mpe ntina ya yambo ya mbulamatari ezali kobatela makoki ma loboko’ ma bato banso. Kobunda mpo na yango ezali eteni ya ntina mingi na politiki ya Amerika mpo na bikolo bya bapaya.”

Rapport ya Commission emoni mpe ete Etats-Unis ekoki kozala makasi mingi na kobunda mpo na makoki mabomoto soki ekobatela makoki maye kati na mboka, elobi M. Berkowitz.

Mpe mpo na kosukisa, makoki mabomoto masengeli makolisama na kati na bato, bongo nde makovandisama na makasi na culture politique to lolenge bato babika politki, elobi Directeur Berkowitz:

“Bobatelami bwa mamkoki mabomoto, bitumba mpo na makoki mabomoto, ezali te maye masalamaka na mpwasa. Esengeli ekolisama. Ekolisamaka ndenge nini? Ekolisamaka na mabota, na bisika bato bavandi to ba communautés, na misala mya biteyelo to système éducatif, na culuture politique publique to bizaleli ya politiki bya bato songolo biye bitiaka o’boso mayoki nab ana mboka baike, biye bisalakisa bango kotosa makoki ma bato banso.”

Mpo botomboli makoki maboto bologna na libanga, eyebisi directeur Berkowitz, ezali na lintomba ete totia te makani kaka na Lisakoli lya Lipanda, kasi na Lisakoli lya Molongo mpo ya Makoki mabomoto mpe lokola, na ntina ya koluka likonzi lya makoki maye makozala lokla bendele mpo na politiki bisika binso.

Anncr: Ezalaki makanisi ma manosi lolenge mbulamatari ya amerika emonaka makambo.

XS
SM
MD
LG