Accessibility links

Breaking News

Trump na Likita linene ya Nations unies 


Trump UNGA Maison Blanche
Trump UNGA Maison Blanche

Na lisikulu na Assemblée générale ya Nations unies (Likita Linene lya Nations unies), président Donald Trump alakisi ete mokili mokoti na nkwokoso enene: “Tosali bitumba ya makasi na monguna amonanaka – virus ya Chine – eye ebomi bato mingi na bikolo 188.”

Etats-Unis ebanda koepsa bato mayele mpo na kobundisa COVID-19, elongo na yango, kokela bisaleli bya kosunga na kopema na motango ya koleka biye tokoki kokabola na bikolo bizali na bosenga mpe na bopesi lobiko ya makasi. Ata sik’oyo, mangwele masatu mazali na etapi ya suka ya bomekami na yango, elobaki président Trump:

“Tokokabola mangwele, tokolonga virus, tokosukisa bokono boye bopanzani mokili mobimba, mpe tokokota na eleko ya bofulikisama, boyokani mpe kimya bosalama te yambo,” esakolaki M. Trump.

Na ngonga moko wana, bakambi ba Chine basengeli bamemisama mokumba mwa misala na bango, esakolaki président Trump:

“Na libandela ya virus, Chine ekangaki mibembo mya kati kati na yango ntango epesaki nzela na mpepo kowuta Chine mpe komema bokono na mokili… Mbulamatari ya Chine mpe Mabongisi ma malongo mpo Bokolongono (OMS), eye ekambami na lolenge moko boye na Chine, esakolaki na lokuta ete elembo moko te emonisi ete bato bakoki komipesana bokono bwango,” ebakisaki M. Trump.

Président Trump asengaki na ONU komemisa hine mokumba mwa misala mabe na environnement (libanda lya bomoi)esident Trump also urged the United Nations to hold China accountable for its environmental abuses:

“Mobu nionso, Chine ebwakaka millions na millions ya ba tonnes ya plastique mpe esopaka fulu na mbu enene, elobaka mbisi mingi na libanda lya ndelo ya mayi ma bikolo bisusu, ebebisaka bitando bya pauni na nse ya mayi, mpe ebimisaka toxique mingi ya mercure na atmosphère koleka bikolo binso na mokili. Bobimisi ya carbon na Chine bozali pene na mbala mibale koleka ya USA, mpe bozali kokola na lombango,” elobaki M. Trump.

Soki Etats-Unis esengeli ezala mabongisi songolo, elobi président Trump, “esengeli etala mingi nkwokoso ya solo na mokili, Yango ezali na kati misala mya badongolo miso (terrorisme), bonyatami bwa basi, kotia bato na misala makasi, mombongo ya drogues, boteki bato mpe ya bondumba, monyokoli ya bato bandimaka Nzambe, mpe bobomi bwa bato ba kabila songolo ya bayi biyamba songolo bazali na motango moke,” ebakisaki M. Trump.

XS
SM
MD
LG