Accessibility links

Breaking News

USA emipisa na kotombola démocratie


Samantha Power, Maotambwisi Agence américaine ya molongo mpo na ntombw (USAID), na Khartoum, Soudan.3 août 2021. (Photo by ASHRAF SHAZLY / AFP)
Samantha Power, Maotambwisi Agence américaine ya molongo mpo na ntombw (USAID), na Khartoum, Soudan.3 août 2021. (Photo by ASHRAF SHAZLY / AFP)

Na komonaka bozongi nsima makasi mpe bomati bwa bokonzi ya kanza to ya makasi,” elobi motambwisi ya USAID, Samantha Power, “tosengeli totalisa na pole mpe ntembe te ete ba démocraties ekoki kokamba na ndenge esengeli mpe kopesa biyano bya solo mpe mpo na bato ba solo.”

Na komonaka bozongi nsima makasi mpe bomati bwa bokonzi ya kanza to ya makasi,” elobi motambwisi ya Agence international ya développement ya Etats-Unis, Samantha Power, “tosengeli totalisa na pole mpe ntembe te ete ba démocraties ekoki kokamba na ndenge esengeli mpe kopesa biyano bya solo mpe mpo na bato ba solo.”

Ba autocraties ezali kopalangisa sango ya lokuta na koloba ete bazali kosala mosala malamu koleka ndende ba démocraties esalaka. « Kasi maloba maye mazali penza lokuta, » elobi motambwisi Power. Nzokande, V-Dem Institut etangi balukiluki mingi ya démocraties baye balakisi été na mibu 25 kolanda botiami ya démocratie (démocratisation), biloko bizali na démocratie bikolisaka BIP na bango na 20% koleka ba autocraties.

Kaniaka ezali mokolo na nkwokoso liboso lya bokonzi to ba régimes wana’ ya nkita. Ba élite économiques to bkulaka ban kita mpe bayi politiki bazali na kaniaka bakoki kobebisa ba démocraties wuto kati, na kosalelaka ba réseaux transtionnels mpo komatisa bolamu na bango moko.

USAID etia Task Force anti-corruption to misala mya kobundisa kaniaka (ACTF) mpo na komatisa, koepsa makasi mpe kokotisa bitumba na kaniaka na Agence mobimba mpe basungi na bokasi Dépaterment d’Etat esalaka ntango inso, misala mya sembo mpe Trésor to libenga lya mboka. Task force yango ekotia mécanisme ya biyeano bya lombango na ntina été USAID ekoka to tokia na mosala mabongisi multi-sétoriel na yango mpo na kosalela na lombango mabaku manso mpo mbongwana ya démocratie mpe ya bitumba na kaniaka mpe lisusu ekoyeba kokokisa makasi ma Département d’Etat, Président Budget ya Joe Biden etie 50 millions $ mpo na biyano biye bya lombango. USAID ekokoba kolongola misolo miye na ba institutions ya mbulamatari mpe ya mabongisi ya société civile ntango inso misolo myango mikosalelama mabe to mikopesa mpasi na bokendi liboso ya démocratie na mboka songolo.

Koleka bitumba na kaniaka, motambwisi Power alobi, “tozali kosunga bikolo koyikisa makasi na cybersécurité na bango mpe kobundisa sango ya lokuta, ntango tozali kopesa maboko na bato basalaka mpo na démocratie na ntina ya komibatela na surveillance dgitale, censure, mpe répression.”

USAID, elongo na basungi ba yango na Département d’Etat mpe na Agence for Global Media (Misala mpo Media na molongo), basangisi makasi na bikolona ntina ya kotombola internet ya ofele mpe mpo na banso, mpe kopanza makoki to ba valeurs ma démocraties mpe malako ma Makoki ma Mobomoto na bondimami ya ba technologies ya sika ya makasi. Kaka mbala moko wana, USA etie makasi na kosunga ba media ya bonsomi na mokili lokola bapanzi sango bazali na mpasi liboso lya mbulamatari ya kanza mpe ndenge nkita ezali kbongwama.

Atako autortatisme emati mibu mileki, ba donnéesto bilembo bikobi komonisa ete démocratie elandami nde na bato mingi mpe elingami na mbulamatari mingi na molongo, elobi Motambwisi Power, USA ezali kokoba kosunga bato na bituka mingi baye balingi komikamba mpe kosalela bonsomi bwa loboko.

Anncr: Ezalaki editorial etalisi makanisi ma mbulamatari ma Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG