Ongwen, moyi LRA ya yambo ya kotelema liboso lya tribunal, akitisami o’likambo mpo na mbeba ya bomoto mpe ya bitumba 61 likolo ya 70 oyo afundamaki na yango. Mbeba yango ezalaki mpo na bitumba na camps minei ya bakima bitumba na Ouganda na 2003 mpe 2004. Azwi etumbu mpo na mbeba mingi ya bitumba mpe ya bomoto eye ezali na kati na yango na bobomi, konyokola, kotia na bohumbu, kokotisa na makasi bana mpe bilenge ya nse ya mibu 15 na botomboki, kobeta, kozwa basi na mabala na makasi, kolala bango na makasi, mpe kopesa bango zemi na makasi. Ezali bokitisami bwa yambo o’likambo mpo na kopesa basi zemi na makasi boye tribunal ya molongo moko te esi epesaka.
Ongwen, oyo etumbu n aye esengeli epesama mikolo mikoya, akoki kotiama o’bokolo mpo na libela.
Etats-Unis esepeli na bokweyisami na likambo ya Ongwen mpo na mbeba ya bitumba mpe ya bomoto. “Ezali etapi ya motuya mpo na sembo mpe mokumba likolo na mbeba ya somo ba LRA basala,” ekomi molobeli ya Département d’Etat Ned Price na liyebisi. “Tolikyi ete bokweyisami boye bokomema kimya moke na baye bazwaki mpasi”.
Etats-Unis esungaki na komema Ongwen komipesa ye moko mpe komemama na CPI na 2015. “Ntango tozali kokoba kondima ete CPI ezali na bosenga mbongwana enene,” elobi molobeli Price, “tosepeli na komona Ongwen komema na misala mya sembo.”
“Tolikyi ete bokweyisami ya Ongwen bokolakisa na bana ba Ouganda ete baye babongisaka mbeba esalamelamaka bango bako komema mokumba, sembo ekosalama, mpe bomengo ya mabe mpenza ya LRA ya kosala ete bitumba mpe mbeba bokoba mpe bowumela, bokozwa eyano,” molobeli Price abakisi.
Etats-Unis ezali kokoba kopesa mbano ya millions ya ba dollars mitano mpo na sango ekomema na kokanga, kotinda na boloko, mpe kokweyisa o’likambo ya Joseph Kony, moknzi ya LRA (Mamapinga ma botelemeli ya Nkolo). Moto nyonso azali na sango na ye to ayebi esika azwami, akoki kotinda email na wcrp@state.gov to kokoma na WhatsApp na +1-202-975-5468.
Anncr: That was an editorial reflecting the views of the United States Government.